Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bandeko ya engumba yango elongo na baavoka liboso ya tribinale na engumba Oulan-Bator, mboka-mokonzi ya Mongolie.

24/8/2018
MONGOLIE

Kolonga na likambo etali bonsomi ya losambo na Mongolie: Lingomba ya Batatoli ya Yehova ekomisami lisusu na Leta

Kolonga na likambo etali bonsomi ya losambo na Mongolie: Lingomba ya Batatoli ya Yehova ekomisami lisusu na Leta

Na mokolo ya 14/06/2018, biro ya Leta oyo etalelaka makambo ya engumba Oulan-Bator, mboka-mokonzi ya ekólo Mongolie, epesaki Batatoli ya Yehova mokanda ya Leta oyo emonisi ete lingomba na bango ekomami lisusu na buku ya Leta.

Mokanda ya Leta oyo epesi lisusu Batatoli ya Yehova ndingisa ya kosala makambo na bango ya losambo na engumba Oulan-Bator.

Leta ya Mongolie esɛngaka ete mbula na mbula mangomba ya losambo ekomamaka lisusu na buku ya Leta mpe yango nde Batatoli ya Yehova na Mongolie basalaka kobanda 1999, dati oyo bakomisaki mpo na mbala ya liboso lingomba na bango na buku ya Leta. Kasi kobanda 2015, biro ya Leta ya engumba Oulan-Bator eboyaki tókomisa lisusu lingomba na biso na buku ya Leta. Na sanza ya 01/2017, na likita oyo bakambi ya engumba yango basalaki, bazwaki ekateli ete bápesa biso ndingisa lisusu te ya kosala makambo na biso ya losambo. Bamonisi ya likita yango baboyaki kolobela likambo oyo etindaki bango bázwa ekateli yango. Bandeko bamonaki malamu bámema likambo yango na batribinale.

Ntango bazalaki kosambisa likambo yango na tribinale, avoka ya biro yango ya Leta amekaki kolobela ekateli oyo tribinale monene ya Russie ezwaki ya kopekisa bibongiseli ya losambo na biso oyo endimamaki na Leta ya Russie. Baavoka na biso bamonisaki ete mikili mingi emonaki mabe mpo na ekateli yango mpe batribinale mingi ya mikili ndenge na ndenge eboyaki ekateli yango. Epai mosusu, tribinale elobaki ete ekateli ya tribinale monene ya Russie ezwamaki nsima ya bikateli oyo biro ya Leta ya engumba yango ezwaki mpe ete ebongaki te báloba ete ekateli ya Russie nde etindi bango bázwa ekateli yango.

Tribinale yango ekweisaki ekateli ya biro yango ya Leta mpe elobaki ete ezwaki ekateli yango na kolanda bilobaloba mpe bazalaki te na bilembeteli oyo emonisi likambo moko ya mabe oyo Batatoli ya Yehova basalaka. Tribinale emonaki mpe ete biro yango etosaki te ntomo ya Batatoli ya Yehova na likambo etali bonsomi ya kolobela lingomba na bango to mateya na bango.

Jason Wise, avoka moko ya Batatoli ya Yehova oyo asambaki likambo yango; alobaki boye: “Atako esɛngi te ete okomisa nkombo na buku ya Leta mpo na kozala na ntomo mpe bonsomi, mbala mingi ezalaka mpasi kosala makambo ya losambo na bonsomi nyonso soki lingomba ekomisami te na buku ya Leta. Koyebana na Leta esalisaka biso tókɔtisa na mboka Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, tózala bankolo bisika na biso ya losambo mpe tófutela bisika mosusu mpo na mayangani na biso ya mbula na mbula. Tozali na esengo ndenge tribinale ekweisi ekateli oyo biro ya engumba Oulan-Bator ezwaki mpe ndenge endimi ete bikateli ya ndenge wana ekoki kobebisa bonsomi na biso ya losambo mpe ya kosala mayangani na biso na Mongolie.”