Lakisá makambo oyo ezali na kati

17 SANZA YA 11, 2020
MOZAMBIQUE

Mokanda ya Matai ebimi na monɔkɔ ya Gitonga mpe ya Ronga

Mokanda ya Matai ebimi na monɔkɔ ya Gitonga mpe ya Ronga

Na mokolo ya 14 mpe 15/11/2020, Biblia​—Evanzile ya Matai ebimaki na ndenge oyo ekoki kotángama na baaparɛyi na monɔkɔ ya Gitonga mpe ya Ronga, minɔkɔ mibale yango elobamaka na sudi ya Mozambique. Mpo na basakoli 524 oyo balobaka monɔkɔ ya Gitonga mpe basakoli 1 911 oyo balobaka monɔkɔ ya Ronga, kobimisama ya Biblia yango ezali mpenza likabo oyo euti na Yehova mpe eyei na ntango oyo ebongi mpenza.

Ndeko Amaro Teixeira, ya Komite ya Filiale ya Mozambique, nde alakisaki mabongoli yango, mpe basakoli balandaki yango na video. Lisusu, bapesaki bandeko na biso nzela ya kolanda programɛ yango na TV mpe na baradio. Mokanda ya Matai ekobima mpe na mwa buku ya nkasa 64, mpo bato mingi bazali na baaparɛyi te.

Ndeko Teixeira alobi boye: “Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali mingi te na minɔkɔ yango. Tozali na esengo ndenge tozwi mokanda ya Matai, mpo evanzile yango ezali na lisolo ya bankɔkɔ ya Yesu mpe kobotama na ye, Lisolo likoló ya Ngomba oyo eyebaná mingi oyo asalaki, mpe bisakweli na ye ya minene oyo elobeli mikolo ya nsuka.”

Mobongoli moko alobi boye mpo na Biblia yango oyo ebongolami na bosikisiki mpe kotánga yango ezali pɛtɛɛ: “Buku ya Matai ezali na mateya ebele. Nazali komona ndenge bato oyo bakotánga yango bakolela ntango bakotánga Lisolo likoló ya Ngomba na monɔkɔ ya mboka na bango moko.”

Bato ya mayele balobi ete bato oyo balobaka monɔkɔ ya Gitonga bazali soki 224 000 mpe oyo balobaka monɔkɔ ya Ronga bazali soki 423 000. Tozali na elikya ete mabongoli ya Biblia oyo ekosalisa bato mingi bázwa ‘nzela oyo ememaka na bomoi.’​—Matai 7:14.