Lakisá makambo oyo ezali na kati

28/5/2019
MOZAMBIQUE

Mopɛpɛ makasi babengi Kenneth ebebisi nɔrdi ya Mozambique

Mopɛpɛ makasi babengi Kenneth ebebisi nɔrdi ya Mozambique

Na mokolo ya 25/04/2019, mopɛpɛ makasi babengi Kenneth ebebisaki nɔrdi ya Mozambique. Oyo ezali mopɛpɛ ya mibale oyo ebebisi mboka yango nsima ya mopɛpɛ babengi Idai oyo ebebisaki bisika ebele na sanza 03/2019. Mopɛpɛ wana ya makasi etombolaki mai mpe pɔtɔpɔtɔ, oyo ebebisaki bandako, babalabala, esalaki mpe ete bomoi ekóma lisusu mpasi na bisika yango.

Basakoli soki 300 bafandaka na etúká ya Cabo Delgado, ata moko na bango te azokaki to abomamaki na mopɛpɛ wana ya makasi. Ata bongo, bandako ya bandeko 9 ebukanaki mpenza mpe bandako 16 ebebaki makasi. Longola wana, Ndako ya Bokonzi moko ebukanaki mpenza mpe misato ebebaki makasi. Mokɛngɛli ya zongazonga ya esika yango ná momonisi ya Biro ya kosala baplan ya bandako, mpe bandeko mibale oyo bautaki na biro ya kobongola na mosika bayaki kotala bandeko ya masangá oyo bakutanaki na makama yango mpe kopesa bango lisungi oyo basɛngelaki na yango.

Tozali kobondela mpo na bandeko na biso wana lokola bazali kokoba kotalela Yehova, kotyela ye motema mpo alendisa bango mpe asalisa bango “na bantango [wana] ya mpasi.”​—Nzembo 46:1.