Lakisá makambo oyo ezali na kati

30/5/2019
OUZBÉKISTAN

Molulu ya ekaniseli ya liwa ya Kristo esalemaki na kozanga kobombana na Ouzbékistan mobimba

Molulu ya ekaniseli ya liwa ya Kristo esalemaki na kozanga kobombana na Ouzbékistan mobimba

Na mokolo ya 19/04/2019, mpo na mbala ya liboso na bambula oyo eleki, bandeko na biso na Ouzbékistan basalaki na kozanga kobombana molulu ya Ekaniseli ya liwa ya Kristo.

Lingomba ya Batatoli ya Yehova na Ouzbékistan ekomami na Leta kaka na Chirchik, engumba oyo ezali pene na Tashkent. Na bambula oyo eleki, bandeko na biso oyo bafandaka na Chirchik te, bazalaki kosala na kobombana Ekaniseli mpo bapolisi bápanza bango te. Na mbula oyo, bandeko bayebisaki biro ya bapolisi ete bakosala molulu ya Ekaniseli mpe babengisaki bapolisi báya koyangana na molulu yango. Bakonzi ya bapolisi bandimaki mpenza mpe bazwaki bibongiseli mpo na kobatela baoyo bakoyangana na molulu yango. Na bisika mosusu, bakonzi ya bapolisi bayanganaki na molulu yango.

Ndeko Mark Sanderson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki diskur ya Ekaniseli na lopango moko ya Ndako ya Bokonzi na Chirchik, ndenge emonisami na fɔtɔ ya ebandeli. Diskur yango ebongolamaki na monɔkɔ ya Russe. Motángo mobimba ya baoyo bayanganaki ezalaki bato 781. Kaka na butu yango, molulu mosusu mibali ya Ekaniseli esalemaki kaka na lopango yango.

Ntango ndeko Sanderson elongo na ndeko Paul Gillies oyo bautaki na Biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe bandeko mibale oyo bautaki na Asie centrale bayaki kuna, bakutanaki na bakonzi minene ya Ministère ya Défense mpe bato ya biro oyo elandelaka ntomo ya moto na ekólo yango. Na boumeli ya likita yango, bapesaki bandeko na biso nzela ya kolobela na bosikisiki makambo etali kondima na biso mpe ebongiseli na biso. Tozali na elikya ete soki bakonzi yango bayekoli makambo mingi etali ebongiseli mpe kondima na biso, bakondima kokomisa ebongiseli na biso na Leta kaka te na etúká ya Chirchik, oyo ekosalisa bandeko bázwa bisika oyo ebongi mpo na losambo.

Ndeko Mark Sanderson elongo na bandeko mosusu oyo bayaki na Ouzbékistan batɛlɛmi na lopango ya Ministère ya Justice ya République ya Ouzbékistan

Kosala kozanga kobombana molulu ya Ekaniseli mpe makita oyo esalemaki elongo na bakonzi na limemya nyonso emonisi ete makambo ezali kobongwana na Ouzbékistan. Na boumeli ya sanza motoba oyo eleki, bakɔtelaki lisusu Batatoli ya Yehova na bandako te, bafutisaki bango amande te, to bakangaki bango na bolɔkɔ te. Lisusu, pene na mbula moko oyo eleki, na mokolo ya 14/04/2018, Javlon Vakhabov, ambasadɛrɛ ya Ouzbékistan na États-Unis, alobaki polele ete parlema ekobongola mibeko mpo epesa Batatoli ya Yehova nzela ya kokomisa losambo na bango na Leta.

Tozali kosɛnga ete Yehova apambola milende ya bandeko na biso na Ouzbékistan ndenge bazali kokoba kozala “na bomoi ya kimya mpe ya mobulu te na bomoi na ezaleli ya kokangama mobimba na Nzambe mpe na lisɛki te.”​—1 Timote 2:2.