Lakisá makambo oyo ezali na kati

30 SANZA YA 3, 2017
PÉROU

Pérou: Mbula makasi oyo ezali komema mapango

Pérou: Mbula makasi oyo ezali komema mapango

Mbula makasi ezindisaki bitúká 24 na Pérou mpe mapango ekendaki na mai, balapolo emonisi ete likambo yango ekokoba lisusu. Bambula oyo ebɛti na ekólo yango ezali mbala zomi koleka oyo ebɛtaka na eleko ya mbula (kobanda sanza ya 12 tii ya misato). Batatoli ya Yehova bazali kosunga bandeko na bango, ata mpe bato mosusu oyo bazwi likama atako bazali Batatoli ya Yehova te.

Mai yango ya mbula ebebisi bandako koleka 530 mpe bisika ya losambo 6 (Ndako ya Bokonzi) ya Batatoli ya Yehova. Balapolo emonisi ete Batatoli ya Yehova mingi ya engumba Huarmey, oyo ekabwani na Lima na ntaka ya bakilomɛtrɛ 288, bamataki likoló ya bandako mpo na komibatela mpo mai emataki makasi.

Biro ya Batatoli ya Yehova na Pérou etye komite mwambe ya kopesa lisungi mpo na kosunga Batatoli ya Yehova ya etúká wana oyo bazwi likama, ata mpe na bitúká 12 oyo guvɛrnema ya Pérou elobi esengeli kopesa lisalisi nokinoki. Komite yango ya lisungi esí epesi tɔni koleka 22 ya bilei mpe litre koleka 22 000 ya mai ya komɛla epai ya bandeko oyo bazwi likama. Tɔni mosusu 48 ya bilei mpe litre koleka 9 000 ya mai ya komɛla ekokende kuna na bapɔsɔ ezali koya. Ebele ya Batatoli ya Yehova ya Pérou bamipesi mpo na kosalisa na kotya bopɛto mpe kobongisa bandako oyo ebebi.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova eyeisi mosala ya kopesa lisungi pɛpɛlɛ ndenge ezali kosalela mbongo ya makabo oyo epesamaka mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Pérou: Norman R. Cripps, +51-1-708-9000