Lakisá makambo oyo ezali na kati

29/12/2017
PHILIPPINES

Mipɛpɛ mibale ya makasi eningisi Philippines

Mipɛpɛ mibale ya makasi eningisi Philippines

Esɛngaki ebele ya bato bálongwa na bandako na bango mpo na mipɛpɛ mibale ya makasi mpenza, Kai-tak (oyo bato ya mboka yango babenga yango Urduja) mpe Tembin (oyo babengaka yango Vinta), esalaki ete mai etonda mpe mabele ebukana na ekólo Philippines na nsuka ya sanza ya Decembre.

Mipɛpɛ yango ebebisaki Bandako mibale ya Bokonzi mpe bandako motoba ya Batatoli ya Yehova mpe esɛngaki mabota 281 elongwa. Nsango ya mawa ezali ete ndeko na biso moko ya mwasi ya mbula 24 akufaki na mai yango ya mbula.

Batatoli ya Yehova ya ekólo yango bapesaki lisungi epai ya bandeko na bango oyo bazwaki likama. Bamonisi ya Biro na Philippines bazali komibongisa mpo na kokende kotala esika wana oyo likama esalemi mpo na kopesa lisungi mosusu epai ya bandeko mpe kolendisa bango.

Tokaboli mawa na bandeko na biso oyo bazwi likama mpe babungisi biloko na bango. Tozali na elikya ete Yehova akokoba kopesa bango libɔndisi mpe lisungi oyo basengeli na yango na nzela ya elimo santu mpe lisangá na ye wana mosala ya kosunga ezali kokende liboso.​—Nzembo 9:9; Yisaya 51:12.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David Semonian, biro ya bansango, +1-845-524-3000

Na Philippines: Dean Jacek, +63-2-224-4444