Lakisá makambo oyo ezali na kati

26 SANZA YA 4, 2017
PHILIPPINES

Batatoli ya Yehova bazali kotambwisa misala ya kotonga lisusu bandako oyo mopɛpɛ makasi babengi Typhon Nock-Ten ebebisaki

Batatoli ya Yehova bazali kotambwisa misala ya kotonga lisusu bandako oyo mopɛpɛ makasi babengi Typhon Nock-Ten ebebisaki

MANILLE, Philippines​—Batatoli ya Yehova na Philippines babandaki mosala monene ya kopesa lisungi mpo na kobongisa to kotonga lisusu bandako oyo ebebaki na mopɛpɛ makasi oyo babengi Typhon Nock-Ten (oyo bato ya mboka yango babengi yango “Nina”).

Jason Dotimas (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Bethel Alvarez (na lobɔkɔ ya mobali), Batatoli ya Yehova oyo bazali kotonga lisusu Ndako ya Bokonzi oyo ezali na engumba ya Polangui, na Philippines. Bango nyonso mibale basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ koleka 650 mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala oyo ya kopesa lisungi.

Na mokolo ya 25/12/2016, mopɛpɛ moko ya makasi babengi Nock-Ten, ebɛtaki etúká ya Bicol mpe ebebisaki yango mpenza. Balapolo emonisi ete mopɛpɛ yango ebomaki bato 10 mpe ebebisaki bandako koleka 390 000. Atako Motatoli ya Yehova moko te akufaki to azokaki makasi, bandako koleka 300 ya Batatoli ya Yehova mpe bisika na bango ya losambo 24 (oyo ebengamaka Ndako ya Bokonzi) ebebaki to ekweaki. Biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Philippines esalaki komite moko ya kopesa lisungi mpo na kosalisa mabota oyo ezwaki likama.

Dean Jacek, momonisi ya Batatoli ya Yehova na Philippines, alobaki boye: “Tii sikoyo, bavolontɛrɛ na biso basilisi kobongisa bandako 271 ya bandeko ya lingomba mpe babongisi Bandako ya Bokonzi 22. Bandeko oyo bazali na baekipi yango ya kotonga bazali kokoba kosala milende mpo na kobongisa Bandako ya Bokonzi mibale mpe bandako mosusu 38 oyo etikali. Tozali na elikya ete tokosilisa misala yango na nsuka ya sanza ya 04/2017.”

Bandako ya lisungi. Bakoki kotonga ndako ya boye na boumeli ya mikolo motoba mpamba soki basaleli mayele ya kobongisa naino liboso ndako yango.

Misala oyo Batatoli ya Yehova basalaka na mokili mobimba, oyo esɛngaka mpe kopesa lisungi na ntango ya likama, esalemaka na pɛtɛɛ nyonso na lisalisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe makabo oyo bandeko bapesaka. Na mokili mobimba Batatoli ya Yehova bazali koleka milio 8, mpe na kati na bango Batatoli ya Yehova koleka 209 000 bafandaka na Philippines.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Philippines: Dean Jacek, +63-2-224-4444