Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndako ya monene epai batribinale (Palais de Justice, Tribinale monene (Haute juridiction) ná Cour d’appel ya Angleterre mpe ya Pays de Galles) ezali

12/05/2020
ROYAUME-UNI

Tribinale na Angleterre endimi lotomo na biso ya kopona nani akoki kozala na kati ya ebongiseli na biso

Tribinale na Angleterre endimi lotomo na biso ya kopona nani akoki kozala na kati ya ebongiseli na biso

Na mokolo ya 17/03/2020, tribinale (Cour d’appel) ya Angleterre mpe ya Pays de Galles elobaki ete ntina ya kobongola ekateli ya tribinale monene ezali te. Tribinale yango (Cour d’appel) endimaki ete Batatoli ya Yehova bazali na lotomo ya kotosa mobeko ya Biblia ya kolongola moto na lisangá.

Na mokuse, tribinale yango elobi ete, lisangá ezali na lotomo ya koyebisa ete Songolo azali lisusu Motatoli ya Yehova te, mpe liyebisi yango ezali kobebisa lokumu ya moto te. Zuzi Richard Spearman alobi boye na ekateli na ye: “Ezali malamu ete lingomba oyo ezali kosala nyonso etosa mibeko ya Biblia, ezala na nguya ya kobengana mosumuki. Yango ezali likambo ya malamu mpenza ya kosala mpo na bantina mingi. Moto oyo azali na likoki te to alingi te kotosa mibeko ya Biblia, abongi lisusu te kozala na kati ya lingomba wana. Mpe soki moto ya ndenge wana alongolami te, akoki kobebisa bato mosusu na kati ya lisangá.”

Nsima ya ekateli ya tribinale wana, moto yango akendaki na tribinale mosusu (Cour d’appel) kosɛnga ete básambisa likambo yango lisusu. Tribinale wana mosusu mpe eboyaki, elobaki likambo yango ezali na “ntina moko te,” mpe emonisi ete ekateli ya tribinale wana “ezalaki mpenza malamu,” mpe ete “nguya ya kobengana moto ezali mpenza na ntina mingi na kati ya lingomba ya Nzambe.”

Ndeko Shane Brady, avoka ya Batatoli ya Yehova alobi boye mpo na likambo yango: “Ekateli oyo tribinale oyo ezwi eyokani na bikateli oyo batribinale mosusu ezwá awa na Angleterre, tribinale ya mpoto mpo na ntomo ya bato, cour d’appel ya Canada, batribinale mosusu ya Mpoto, mpe ya États-Unis. Bikateli yango nyonso emonisi ete Batatoli ya Yehova bazali na lotomo ya kopona nani asengeli kozala na kati ya lisangá na bango.”

Tozali na esengo ete tribinale eyebi lotomo oyo tozali na yango ya kotosa Biblia mpe ya kobatela lisangá mpo makambo ya mabe ebebisa yango te.​—1 Bakorinti 5:11; 2 Yoane 9-11.