Lakisá makambo oyo ezali na kati

Russie

 

2018-08-07

RUSSIE

Russie ebɔtɔli biro ya misala ya Batatoli ya Yehova

Nsima ya kosamba na tribinale ya engumba Saint-Pétersbourg, mopanzi-nsango moko, moto moko ya mayele na makambo ya mangomba, mpe baavoka mibale bamonisaki polele makambo ya kozanga bosembo ya kobɔtɔla biro ya misala ya Batatoli ya Yehova.

2018-08-06

RUSSIE

Motatoli ya Yehova mosusu azali kosamba na Russie mpo bafundi ye ete asali mosala oyo etindaka bato na botɔmbɔki

Arkadya Akopyan, Motatoli ya Yehova oyo azali na mbula 70 mpe azwa pansiɔ na mosala ya kotonga bilamba, asali mabe moko te, azali mwana-mboka oyo atosaka mibeko mpe alingi kaka kosambela Nzambe na kimya.

2018-08-06

RUSSIE

Tribinale ya Oryol eyoki makambo oyo tɛmwɛ ya liboso alobi ntango bazali kosambisa Dennis Christensen

Bakangaki Christensen, mwana-mboka ya Danemark oyo azali Motatoli ya Yehova na sanza ya 05/2017. Bakoki kokatela ye mbula motoba to zomi ya bolɔko. Azalaki kaka kosala likambo oyo losambo na ye esɛngi.

2018-09-06

RUSSIE

Kampanye ya konyokola Batatoli ya Yehova ebandi na Russie

Lokola bakonzi ya Russie bakangi bibongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta, bakómi sikoyo kolandela moto mokomoko mpe losambo na bango.

2018-07-18

RUSSIE

Bakonzi ya Russie balingi kobɔtɔla biloko ya ebongiseli ya Batatoli ya Yehova

Tribinale ya engumba Saint-Pétersbourg elingi ebanda kosambisa likambo ya kobɔtɔla bandako ya biro ya kala ya misala ya Batatoli ya Yehova na Russie.