Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Yegor Baranov ná ndeko Darya Dulova

08 SANZA YA 09, 2020
RUSSIE

Atako ndeko Baranov ná ndeko Dulova bazali bilenge bazali na kondima mpe na mpiko

Atako ndeko Baranov ná ndeko Dulova bazali bilenge bazali na kondima mpe na mpiko

Bandeko na biso mibale na Russie, ndeko mobali Yegor Baranov ná ndeko mwasi Darya Dulova, bazali kaka na mpiko atako bakweisi bango na likambo mpe basengeli kolekisa ntango mingi na bolɔkɔ. Sikoyo, ndeko Baranov azali na mbula 19 mpamba, mpe azali na bolɔkɔ. Ndeko Dulova azalaki na mbula 18 ntango bakonzi bakɔtaki na ndako na ye. Bazali bana mike mpenza na kati ya bandeko 380 na Russie oyo basengeli kokɔta bolɔkɔ mpo na bindimeli na bango.

Ndeko Baranov azali na bolɔkɔ banda mokolo ya 27/05/2020. Ndeko Dulova azali kozela ekateli ya tribinale na makambo mibale. Atako bazali kokutana na mikakatano ya ndenge na ndenge, bango nyonso mibale bazali na ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova.

Na mokolo ya 27/05/2020, bato ya Service fédéral de sécurité (FSB) bakɔtaki na ndako esika ndeko Baranov afandaka na mama na ye. Na yango, zuzi Aleksey Shatilov apesaki mitindo ete bátya ndeko na biso na bolɔkɔ mpo na mwa ntango mpo balobi ete azali “moko ya bakambi” ya Batatoli ya Yehova na esika wana.

Ndeko Baranov alobi ete, ntango likambo yango ya nsɔmɔ ezali kosalema, abondelaki Yehova mpe afandaki kimya. Ndeko Baranov alobi boye: “Moko ya bakonzi oyo bazalaki kolukaluka na ndako, amonaki ete nazali kosala makambo nde lokola nazalaki kozela ete báya.”

Ndeko Baranov azalaki koloba mbala na mbala ete, azalaki kokanisa boye, “Soki Yehova atiki nzela ete likambo oyo esalema, yango elingi koloba, nakoki koyikela yango mpiko.” Abakisi boye: “Kobondela Nzambe na molende mpo asalisa ngai mpe elimo santu esalisaki ngai nabanga te. Lisusu, nazali kobanga te mpo nayebi ete nazali moto mabe te. Lisosoli na ngai ezali pɛto, mpe nazali konyokwama nde mpo na kondima na ngai.”

Ndeko Baranov alobi ete azali kobanga te ata na bolɔkɔ. Mpo baninga oyo azali na bango na bolɔkɔ bazali komemya ye mpe bazali kosalela ye makambo lokola leki na bango. Ndeko Baranov alobi boye: “Bayebi ete nasengeli kozala wana te.”

Na mokolo ya 01/08/2020, bakonzi bayaki kolukaluka biloko na ndako oyo ndeko Dulova afandaka na mama na ye. Ndeko Dulova alobi ete atako abangaki ntango bayaki kolukaluka na ndako na bango mpe na nsima bakangaki ye, kondima na ye ezali kaka makasi mpenza. Alobi ete: “Nazali na ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova. Ata soki likambo yango ekosuka ndenge nini, nakosalela Yehova kaka na bosembo tii na nsuka.”

Likambo oyo bakangaki ndeko Dulova ebandaki na sanza ya 09/2019, na tribinale ya engumba Karpinsky, na etúká ya Sverdlovsk. Na moko ya kosamba ya nsuka oyo ndeko Dulova asambaki, ayebisaki tribinale ete, ezali malamu ete bato bákoka koyebisa bato mosusu makambo ya malamu oyo etali bomoi na bango. Alobi boye: “Na ndakisa, nayebi ete mosika te Nzambe akotya paradiso awa na mabele, mpe ete mosika te, bato bakolela kaka mpo na esengo. Makambo ya boye esengeli kotinda ngai te nayebisa yango bato mosusu?”

Atako asambaki na ndenge oyo ebongi mpe na mpiko, bakweisaki ye na likambo na mokolo ya 27/01/2020. Bakatelaki ndeko Dulova etumbu ya bolɔkɔ mbula moko. Avoka na ye asɛngaki ete bátalela likambo yango lisusu.

Na mokolo ya 06/08/2020, tribinale ya etúká ya Sverdlovsk eboyaki ekateli oyo bazwelaki ndeko Dulova. Bazongisaki likambo yango lisusu na tribinale ya engumba Karpinsky mpo zuzi mosusu atalela likambo yango. Bayebisi naino te mokolo bakosambisa likambo yango lisusu. Lokola azali kozela ete bákata likambo yango, azali kosala nyonso mpo na komonisa bazuzi ya mbala oyo ete ye, mama na ye, ná Batatoli mosusu misato basali mabe ata moko te.

Ndeko Baranov ná ndeko Dulova bayekoli makambo mingi na mikakatano oyo bakutani na yango.

Ndeko Dulova alobeli eloko oyo esalisaki ye: “Mpo na kobatela kondima epai ya Yehova, esengeli kotángaka Biblia, kobongisaka makita ya lisangá, mpe koyekolaka banzembo ya Bokonzi. Manyoláká mingi na bavɛrsɛ ya Biblia, ekosalisa yo olongola makanisi na yo na minyoko oyo ozali na yango, mpe otika kobanga makambo oyo ekoki kosalema.”

Ndeko Baranov alobi boye: “Mpo na koyika mpiko na minyoko oyo, osengeli kozala na boyokani malamu mpenza ná Nzambe. Kobungisa ntango te. Bandá kobongisa boninga na yo ná Yehova Nzambe sikoyo.”

Biblia ezali na bandakisa ebele ya bilenge ya sembo oyo Yehova asalisaki bango bázala na mpiko. Toyebi ete akokoba kosunga bilenge na biso ya bolingo oyo bazali konyokwama na Russie, mpe na bisika mosusu na mokili.​—1 Samwele 1:20; 16:18; 2 Bakonzi 5:1-3; Danyele 1:14-17; 3:17-27.