Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kaka nsima ya kobima bolɔkɔ, ndeko Gennady Shpakovskiy elongo na mwasi na ye Tatiana, mpe mwana na bango Maria

03 SANZA YA 08, 2020
RUSSIE

Babimisi ndeko Gennady Shpakovskiy na bolɔkɔ

Babimisi ndeko Gennady Shpakovskiy na bolɔkɔ

Na mokolo ya 03/08/2020, tribinale ya etúká ya Pskov ekataki ete bábimisa ndeko Gennady Shpakovskiy na bolɔkɔ. Tribinale endimi ete etumbu oyo bakatelaki ndeko Gennady Shpakovskiy ebongaki mpenza, kasi endimi kotyela ye mwa bipekiseli mosusu na boumeli ya mbula motoba na ndambo oyo asengelaki kolekisa na bolɔkɔ. Kaka mwa bangonga nsima oyo tribinale eyebisaki ekateli yango, babimisaki ndeko Sphakovskiy na bolɔkɔ. Prokirɛrɛ akoki kosɛnga ete tribinale etalela lisusu ekateli yango.

Tribinale ekweisi kaka ndeko na biso kasi elobi ete basoda bakokɛngɛla ye na boumeli ya mbula motoba na ndambo ya etumbu oyo bapesaki ye. Kaka nsima ya kolobela ekateli yango, babimisaki ndeko Shpakovskiy na bolɔkɔ. Prokirɛrɛ akoki kosɛnga tribinale etalela lisusu likambo yango.