Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Tatyana Alushkina azali koyamba mobali na ye Vladimir nsima ya kobima na bolɔkɔ

10/04/2020
RUSSIE

Babimisi ndeko Vladimir Alushkin na boloko

Babimisi ndeko Vladimir Alushkin na boloko

Na mokolo ya 30/03/2020, babimisaki ndeko Vladimir Alushkin na bolɔkɔ mpe azongaki epai ya mwasi na ye.

Abimaki na kolanda ekateli ya tribinale ya etúká ya Penza, oyo bazwaki mokolo ya 25/03, oyo elobelamaki na lapolo mosusu liboso. Ekateli yango ebongolaki ekateli oyo bazuzi mosusu bazwelaki bandeko Vladimir Alushkin, Vladimir Kulyasov, Andrey Magliv, ná Denis Timoshin, bakisá bandeko basi Tatyana Alushkina ná Galiya Olkhova. Tribinale ya etúká ya Penza esɛngaki tribinale ya liboso wana epona bazuzi mosusu básambisa likambo ya bandeko na biso wana lisusu. Na ntango yango, bapekisi bango nyonso motoba kosala mibembo na mpe batyeli bango bipekiseli mosusu.

Atako tosepelaki ntango toyokaki ete ndeko Alushkin abimaki na bolɔkɔ, nsima ya mikolo mibale mpamba, toyokaki ete bakangi ndeko na biso mosusu kuna na nɔrdi-ɛsti ya Russie, kaka mpo azali Motatoli ya Yehova. Lokola batribinale yango oyo ezangi bosembo ekozala kaka, toyebi ete bandeko na biso na Russie bakobosana te mpe bakotya motema na maloba oyo ezali na Nahumu 1:7: “Yehova azali malamu, esika makasi ya libateli na mokolo ya mpasi. Mpe ayebaka baoyo bazali koluka esika ya kokima epai na ye”