Lakisá makambo oyo ezali na kati

25/03/2020
RUSSIE

Baboyi ekateli ya liboso na Russia, bandimi kosambisa lisusu ndeko Alushkin ná bandeko mosusu mitano

Baboyi ekateli ya liboso na Russia, bandimi kosambisa lisusu ndeko Alushkin ná bandeko mosusu mitano

Na mokolo ya 25/03/2020, Tribinale ya etúká ya Penza eboyi ekateli oyo bazwelaki bandeko Vladimir Alushkin, Vladimir Kulyasov, Andrey Magliv, ná Denis Timoshin, ná bandeko basi Tatyana Alushkina ná Galiya Olkhova. Bakosambisa lisusu likambo na bango.

Soki ndeko Alushkin alongi na mbala oyo, akobima na bolɔkɔ na mikolo ezali koya. Lokola bazali kozela básambisa bango lisusu, ndeko Alushkin ná bandeko mosusu wana bakoki kosala mibembo te.