Lakisá makambo oyo ezali na kati

12/02/2020
RUSSIE

Bafundi ndeko Yevgeniy Aksenov na likambo mpo azalaki kosolola na bato mateya ya Biblia

Bafundi ndeko Yevgeniy Aksenov na likambo mpo azalaki kosolola na bato mateya ya Biblia

Tribinale ya etúká Jeleznodorojny na Khabarovsk ekoyebisa ekateli oyo ezwi na likambo ya ndeko Yevgeniy Aksenov na mokolo ya 14/02/2020. Tribinale ekateli ye etumbu ya mbula misato ya bolɔkɔ.

Na mokolo ya 21/04/2018, ndeko Aksenov azalaki elongo na baninga na ye na otɛlɛ moko mpo na kosolola makambo etali Biblia. Kuna, ayebisaki baninga na ye ndenge toli ya Biblia ekoki kokómisa boyokani na libota makasi. Bafundaki ye mpo na likambo yango, balobaki ete azali likama mpo na bato mpe azali moto mabe, mpo azali kopesa mabɔkɔ na “ebongiseli oyo makambo na yango etindaka bato na botomboki.” Babandaki kosambisa ye na mokolo ya 21/10/2019.

Wana likambo ya ndeko Aksenov ezali kokóma na nsuka, tozali kobondela ete ye ná libota na ye bákoba kotyela Yehova motema mpo asalisa bango, mpe bátya motema na elaka ya Yehova oyo elobi ete bato na ye ya sembo ‘bakozanga eloko te.’​—Nzembo 34:9.