Lakisá makambo oyo ezali na kati

1 SANZA YA 4, 2019
RUSSIE

Bakateli Motatoli ya Yehova mosusu etumbu ya bolɔkɔ na Russie

Bakateli Motatoli ya Yehova mosusu etumbu ya bolɔkɔ na Russie

Na mokolo ya 01/04/2019, kaka tribinale ya Russie oyo ekatelaki ndeko Dennis Christensen etumbu ya bolɔkɔ ya mbula 6 ekatelaki mpe Sergey Skrynnikov oyo azali na mbula 56 mpe azali Motatoli ya Yehova etumbu mpo asalaki makambo na ye ya losambo. Tribinale esɛngaki bákatela ye amande ya dolare 5 348. Atako prokirɛrɛ asɛngaki tribinale etinda ye na bolɔkɔ mpo na mbula 3, kasi tribinale eboyaki.

Ndeko Skrynnikov ná mwasi na ye, Nina, bazali na mwana moko ya mwasi. Basalisaka mwana na bango ná mobali na ye oyo bazali na bana mitano. Lisusu, libota ya Skrynnikov nde ekipaka baboti ya Nina oyo bakómi mibange.

Na tribinale, ndeko Skrynnikov alobelaki kondima na ye na limemya mpe na ndenge ya kondimisa. Mwa ndambo ya makambo oyo alobaki yango oyo: “Soki moto oyo andimelaka Nzambe te akutani na likambo oyo ekómeli ngai, akoki kozanga elikya. . . . Kasi nazali kotalela likambo yango na ndenge ebongi mpo nazali na kondima. Soki Nzambe apesi nzela ete tribinale etinda ngai na bolɔkɔ mpo na mbula 3, elingi koloba ete nasengeli kotalela mbula misato yango ya bolɔkɔ lokola etumbu te, kasi lokola mokumba moko ya sipesiale ya kosakola na teritware ya sika! Yango wana nazali na elikya. . . . Nzambe akoki kosalisa biso ezala tozali na bonsomi to na bolɔkɔ. Na yango, tozali biso moko te. Azali na biso esika nyonso soki tozali kaka sembo epai na ye.”

Kondima makasi ya bandeko na biso elendisaka biso, na ndakisa, kondima ya ndeko Skrynnikov. Soki tokanisi komekama makasi oyo bazali kokutana na yango, mposa na biso ekokani na mposa oyo ntoma Paulo azalaki na yango mpo na bandeko na ye: “Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso na kondima na bino, mpo bótonda na elikya na nguya ya elimo santu.”​—Baroma 15:13.