Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Yelena Barmakina ná mobali na ye, Dmitriy

28/09/2020
RUSSIE

Bakoki kokanga ndeko Yelena Barmakina mpo abondelaki mpe atángaki Biblia

Bakoki kokanga ndeko Yelena Barmakina mpo abondelaki mpe atángaki Biblia

Ntango ya kokata likambo

Na mokolo ya 29/09/2020, * tribinale ya etúká ya Pervorechenskiy na Vladivostok ekokata likambo ya ndeko Yelena Barmakina. Akoki kozwa etumbu ya bolɔkɔ ya mbula misato, kasi akokɔta naino bolɔkɔ te. Na ntango oyo ndeko Yelena Barmakina azali kozela ekateli ya tribinale, mobali na ye Dimitriy azali kokoba kosamba na esika mosusu.

Makambo na ye

Yelena Barmakina

  • Abotami na: 1967 (Cherepanovo, na etúká ya Novosibirsk)

  • Bomoi na ye: Abatelaka baboti na ye mpo bakómi mikóló mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi. Alingaka bafɔtɔ mingi, yango wana kokanga bafɔtɔ ekómá mpe mosala na ye mpenza. Alingaka masano ya kosakana na mai mpe kotambola na bazamba

  • Ntango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, amonaki mpenza ete bisakweli oyo ekokisamá ezali kondimisa ete Nzambe azali na nguya. Lokola Yehova azalaki koyanola na mabondeli na ye, yango ekómisaki kondima na ye makasi. Ye ná mobali na ye, Dmitriy babalanaki na 2003

Ndenge likambo ebandaki

Na mokolo ya 28/07/2018, na ngonga ya 7:00 ya ntɔngɔ, etuluku ya bapolisi basimbi mandoki, oyo bazipi bilongi bakɔtelaki nkɔkɔ ya ndeko Yelena Barmakina, mobange ya mwasi ya mbula 90. Ndeko Barmakina ná mobali na ye, Dmitriy, bazalaki kofanda na ye mpo na kobatela ye. Bakangaki ndeko Barmakin mpe batyaki ye na kasho. Bakonzi bazalaki kobangisa mwasi ya ndeko Barmakina, mpe koloba na ye ete “mbala ya nsima ekozala yo!”

Nsima ya mbula moko, bakonzi baboyaki ete ndeko Barmakina azwa mbongo na kɔnti na ye na banki. Na mokolo ya 06/08/2019, bakonzi ya esika mwasi ya ndeko Barmakina azali, bafundaki ye ete abuki mibeko mpo azali kobondela, kotánga Biblia mpe kotala masolo oyo ezali kolobela Biblia na televizyo. Avoka na ye alobaki na tribinale ete bálongola bifundeli wana mpo kobondela ná kotánga Biblia ezali makambo oyo moto nyonso oyo asambelaka asalaka. Kasi zuzi atingamaki na bifundeli yango mpo na kondimisa ete, makambo bafundi mwasi ya ndeko Barmakina emonisi ete azali mpenza moto mabe mpo makambo asali epekisami na mibeko ya Russie.

Mwasi ya ndeko Barmakina amitungisaki mingi ndenge bafundaki ye. Ye ná mobali na ye bakabwanaki mikolo 447 ntango mobali na ye azalaki na kasho. Ndeko mwasi Barmakina azali mpe na mokakatano makasi ya kozwa mosala, mpo soki babengi ye akende kosamba, asengeli kozala wana na mbala moko.

Boyekoli na biso ya Biblia esali ete tókamwa te ndenge bakonzi ya Russie bazali ‘kotindika makasi’ mpo na kobebisa bosembo ya bandeko na biso. Kasi, tozali kobɔndisama mpo toyebi ete Yehova akokoba kozala ‘esika ya komibatela mpe nguya’ mpo na bango.​—Nzembo 118:13, 14.

^ par. 3 Bakoki kobongola dati oyo