Lakisá makambo oyo ezali na kati

18/05/2020
RUSSIE

Bakonzi ya États-Unis basali mokanda moko ya mibeko mpo na kosɛnga ete Russie ebimisa ndeko Dennis Christensen na bɔlɔkɔ

Bakonzi ya États-Unis basali mokanda moko ya mibeko mpo na kosɛnga ete Russie ebimisa ndeko Dennis Christensen na bɔlɔkɔ

Bato mibale na kati ya parlema ya États-Unis basalaki mokanda moko ya mibeko, oyo elobaki polele ete Russie esali mabe ndenge etye ndeko na biso Dennis Christensen na bɔlɔkɔ kaka mpamba. Oyo ezali mokanda ya sika ya bakonzi ya guvɛrnema, oyo elobi polele ete Russie ezali kosala mabe ndenge ezali konyokola bandeko na biso mpo bazali kosala losambo na bango.

Bakangaki ndeko Christensen mpe batyaki ye na bɔlɔkɔ na sanza ya 05/2017, kaka mpo azalaki kosala makita ya bokristo elongo na Batatoli ya Yehova mosusu. Na mokolo ya 08/05/2020, Eliot Engel mpe Michael McCaul, bato ya parlema babimisaki mokanda oyo eyebisaki polele guvɛrnema ya Russie ete ebimisa noki ndeko Christensen na bɔlɔkɔ.

“Dennis Christensen, oyo azali Motatoli ya Yehova mpe moto ya ekólo Danemark, bakatelaki ye etumbu ya bɔlɔkɔ ya mbula motoba na mokolo ya 06/02/2019. Commission américaine sur la liberté religieuse dans le monde ezali kotɛmɛla ekateli wana, mpe emoni ete ezali mpenza likambo oyo emonisi ete Russie ezali kotosa te bonsomi ya bato ya kosala losambo na bango.”

Na mokolo ya 25/05/2020, ndeko Christensen akokisaki mbula misato na bɔlɔkɔ. Azali moko ya bandeko na biso 32 oyo Russie etye na bɔlɔkɔ, mpe moko ya bandeko 9 oyo Tribinale ekweisi na likambo mpe bandeko 23 bazali na bɔlɔkɔ mpo na mwa ntango. Lisusu, bakangi bandeko na biso 18. Kobanda 2017, basoda bazali kokɔtela bandeko na biso na bandako na makasi na Russie. Guvɛrnema ya Russie ezali kofunda bandeko na biso ete bazali kosala makambo oyo ebuki mobeko

Bakonzi ya guvɛrnema ya États-Unis mpe ya Mpoto bazali koloba mpenza ete Russie ezali kosala mabe ndenge ezali konyokola Batatoli ya Yehova mpo bazali kosala losambo na bango.

Atako mokanda ya mibeko ya bakonzi ya États-Unis (Résolution 958) ekobongola makambo to te, toyebi ete Yehova akokoba kosalisa bandeko na biso na Russie bákoba koyika mpiko na esengo. Tozali kozela na motema ya kokita ntango oyo Yehova akolongola baoyo nyonso bazali “kokana kobimisa mpasi na nzela ya mobeko.”​—Nzembo 94:20-23.