Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Igor Avramenko, oyo autaki kokufá, azali elongo na mwasi na ye, Yelena

30/03/2020
RUSSIE

Bato ya sireté (FSB) bakei kolukaluka na ndako ya ndeko moko oyo akufá na Russie

Bato ya sireté (FSB) bakei kolukaluka na ndako ya ndeko moko oyo akufá na Russie

Na mokolo ya 23/03/2020, na Russie na teritware ya Khabarovsk, bato ya sireté (FSB) bamonisaki mpenza ete bazali na mawa ata moke te ndenge babebisaki ndako ya Igor Avramenko, ntango bazali kolukaluka na ndako na ye mikolo motoba nsima ya kokufa na maladi ya motema. Bato yango balakisaki mwasi ya ndeko Avramenko mokanda oyo epesi bango ndingisa, ezalaki na nkombo ya ndeko Avramenko na kati. Mpe bakangaki ordinatɛrɛ, kamera, mpe biloko mosusu ya Yelena, mwasi ya ndeko Avramenko oyo autaki kokufa.

Na ntɔngɔ ya mokolo yango, bapolisi bakendaki esika mwasi ya ndeko Avramenko asalaka, bazwaki ye mpe bamemaki ye na ndako na ye, epai Stanislav Grebenkin, moto oyo azalaki kokamba bolukiluki yango azalaki kozela ye, mpe alakisaki ye mokanda oyo epesi bango ndingisa ya kolukaluka. Ndeko mwasi Avramenko ayebisaki Grebenkin ete mobali na ye akufaki. Atako moto yango ayebaki ete akufá, kasi alobaki ete basengeli kolukaluka mpo bakonzi babimisaki mokanda yango liboso ete ndeko Avramenko akufa.

Moto oyo azalaki kolukaluka alobaki na ndeko mwasi Avramenko ete bato na ye bakoluka kaka likolólikoló. Abakisaki ete ezalaki na ntina “kosilisa yango nokinoki mpe kotya mokanda yango na badosye ya [FSB].” Kasi babandaki nde kopanzapanza ndako ya ndeko mwasi.

Na teritware ya Khabarovsk, bafundaki Batatoli zomi ete bazali kosala makambo oyo ebuki mibeko. Atako bakonzi bazali kosala nyonso mpo na kosilisa kondima ya bandeko na biso na Russie, toyebi ete ‘nguya na bango ekomonana soki bafandi nyɛɛ mpe batye motema’ epai ya Yehova, Tata na biso ya bolingo.​—Yisaya 30:15.