Lakisá makambo oyo ezali na kati

24 SANZA YA 07, 2020
RUSSIE

Batye ndeko Dennis Christensen na kasho moko ya mpasi mpo na mbala ya mibale

Batye ndeko Dennis Christensen na kasho moko ya mpasi mpo na mbala ya mibale

Na mokolo ya 15/07/2020, batyaki ndeko Dennis Christensen na kasho moko ya mpasi (SHIZO) mpo na mbala ya mibale. Akotikala kuna tii na mokolo ya 27/07/2020. Likambo yango esalemaki kaka mikolo minei nsima ya kobimisa ye na SHIZO. Soki bátindaka ye lisusu na SHIZO mpo na mbala ya misato, bakonzi ya bolɔkɔ bakoki kofunda ye ete azali moto mabe oyo abukaka mibeko ya bolɔkɔ mpe kotinda ye mpo na sanza motoba na bolɔkɔ (EPKT) epai bapesaka bato etumbu makasi. Baavoka ya ndeko Christensen bazali kokana kosɛnga ete tribinale etalela efundeli wana ya nsuka.

Bakonzi ya bolɔkɔ bazali konyokola ndeko Christensen mpo azali kokoka te kosala misala oyo bazali kopesa ye na bolɔkɔ. Bakonzi ya bolɔkɔ bazali kosɛnga ete ndeko Christensen asala na esika oyo batongaka bilamba ya bato ya bolɔkɔ. Kutu banda akɔtá bolɔkɔ, sante na ye ezali kobeba se kobeba. Minganga ya bolɔkɔ balobi ete ndeko Christensen azali na sante ya malamu mpo na kosala mosala yango, mpe balobi akoki kopemaka mpe kosala ngalasisi. Kasi, monganga mosusu oyo alandelaki ndeko Christensen liboso alobaki ete sante na ye ezali kopekisa ye kosala mosala yango.

Na SHIZO, bato ya bolɔkɔ bazali te na lotomo ya kosomba bilei, kobenga to koyamba telefone, koyamba bapaya to kozwa biloko oyo euti na libándá. Mobeko epekisi bato ya losambo bákendeke kotala bato na SHIZO, yango wana ndeko Christensen akoki te kobenga bankulutu báya kotala ye. Ezali mpo bapekisi losambo ya Batatoli ya Yehova na Russie.

Ndenge lapolo emonisaki yango liboso, na mokolo ya 23/06/2020, tribinale ya etúká ya Lgov epesaki ndeko Christensen bonsomi ya kolongwa na bolɔkɔ liboso ya mbula oyo bakatelaki ye mpe elobaki ete afuta lomande mpo na bambula oyo etikali. Kaka mwa mikolo na nsima, prokirɛrɛ asɛngaki tribinale etalela lisusu ekateli na yango. Emonani ete bakonzi ya bolɔkɔ mpe prokirɛrɛ bazali kosala elongo mpo bándima te kobimisa ndeko Christensen na bolɔkɔ liboso ya bambula oyo bakatelaki ye.

Ezala ndeko Christensen mpe mwasi na ye, Irina, bazali makasi na elimo. Tolendisami mpenza na komona ndenge Yehova azali ntango nyonso kosalisa basaleli na ye ya sembo bázala na motema molai mpe na esengo ntango bazali koyikela komekama ya makasi mpiko.​—Bakolose 1:11.