Lakisá makambo oyo ezali na kati

1/3/2019
RUSSIE

CEDH epesi eyano nokinoki na dosye oyo tokɔtisaki mpo na bandeko na biso oyo banyokolaki bango makasi na Russie

CEDH epesi eyano nokinoki na dosye oyo tokɔtisaki mpo na bandeko na biso oyo banyokolaki bango makasi na Russie

Na mokolo ya 25/02/2019, baavoka ya ndeko Sergey Loginov, moko ya bandeko nsambo oyo banyokolaki bango mabe na bakonzi ya engumba Sourgout, na wɛsti ya Sibérie, bakɔtisaki dosye yango na tribinale ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto (CEDH). Babimisaki bandeko motoba kasi ndeko Loginov azali kaka kuna banda bakangaki ye mpe azali na likoki te ya kozwa lisalisi ya monganga mpo na bampota oyo bazokisaki ye.

Na mokolo ya 26/02/2019, kaka mokolo moko nsima ya kokɔtisa dosye yango, CEDH epesaki eyano ya malamu na likambo yango. Tribinale yango endimaki likambo tosɛngaki, mpe elobaki ete Russie epesa “nokinoki” ndeko Loginov likoki ya kozwa lisalisi epai ya minganga mosusu mpo básala ye baekzamɛ mpe báyeba “mpasi ya ndenge nini azwi na nzoto mpe na makanisi” mpe soki sante na ye ezali kopesa nzela ete atikala kaka na bolɔkɔ. Batikeli guvɛrnema ya Russie ntango tii na mokolo ya 11/03/2019 ezwa ekateli.

CEDH endimaka likambo ya bongo mpambampamba te. Kaka soki bomoi ya moto ezali na likama mpenza. Ezali mpenza malamu ndenge CEDH eyanoli nokinoki na likambo yango; kaka mokolo moko nsima ya kokɔtisa dosye yango. CEDH elobi ete ekolandela mpe ekobomba makambo nyonso ya mabe oyo bandeko na biso bazali kokutana na yango na Russie.

Mpo na sikoyo, na engumba Sourgout, bafundi Batatoli ya Yehova 19 ete basali mabe, mpe misato kati na bango bazali na bolɔkɔ.

Wana tozali kokoba kobondela Yehova mpo na bandeko na biso, tiká ete tóbosana te maloba ya kokitisa motema oyo Yirimia alobaki: “Apambolama mobali makasi oyo azali kotyela Yehova motema, mpe oyo Yehova akómi moto na ye oyo atyelaka motema.”​—Yirimia 17:7.