Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bazuzi misato ya tribinale ya etúká Orel bazali koyebisa ekateli oyo bazwi mpo na kopesa Dennis Christensen etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ

11/6/2019
RUSSIE

Dennis Christensen akosɛnga Tribinale ya Mpoto oyo elandelaka ntomo ya moto mpo na kolongola etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki ye

Dennis Christensen akosɛnga Tribinale ya Mpoto oyo elandelaka ntomo ya moto mpo na kolongola etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki ye

Ndenge lapolo emosaki yango, na mokolo ya 23/05/2019, tribinale ya etúka Orel endimaki ekateli ya etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki Dennis Christensen. Yango wana, ndeko Christensen asɛngisami kolekisa mbula motoba na bolɔkɔ. Kasi lokola así alekisi mbula mibale na bolɔkɔ mpo na mwa ntango, na mibeko ya Russie ezali lokola asali mbula misato na bolɔkɔ, yango wana etikali mbula misato mpo asilisa etumbu na ye. Na mpokwa ya mokolo ya 06/06/2019, bamemaki ndeko Christensen na bolɔkɔ moko oyo basalisaka bato mosala makasi mpo abanda etumbu na ye ya bolɔkɔ. Dennis Christensen akosɛnga Tribinale ya Mpoto oyo elandelaka ntomo ya moto mpo na kolongola etumbu ya bolɔkɔ oyo bakatelaki ye. Dosye na ye mpo na koboya bátya ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango ezali tii sikoyo na Tribinale ya Mpoto oyo elandelaka ntomo ya moto.

Tozali kosepela na ezaleli ya koyika mpiko oyo ndeko Christensen azali komonisa na makambo ya kozanga bosembo. Tondimisami ete Yehova akokoba kosunga ye, ezala mpe Batatoli ya Yehova koleka 200 na Russie oyo bafundi bango na likambo.​—Nzembo 27:1.

Tángá makambo oyo Dennis Christensen alobaki na Tribinale ya etúka Orel na mokolo ya 16/05/2019.

Tángá makambo oyo Dennis Christensen alobaki naTribinale ya etúka Orel na mokolo ya 23/05/2019.