Lakisá makambo oyo ezali na kati

25/05/2020
RUSSIE

Dennis Christensen asali sikoyo mbula misato na bɔlɔkɔ na Russie, kasi atikali kaka sembo mpe azali na esengo

Dennis Christensen asali sikoyo mbula misato na bɔlɔkɔ na Russie, kasi atikali kaka sembo mpe azali na esengo

Ndeko Dennis Christensen asali sikoyo mbula misato na bɔlɔkɔ na Russie kaka mpamba. Banda bakangaki ye mokolo ya 25/05/2017, baninga ya ndeko Christensen batunaki ye soki monyoko oyo elɛmbisi kondima na ye. Azalaki kopesa eyano kaka moko: Ndeko Christensen alobaki: “Namoni makambo oyo ekomami na Biblia na mokanda ya Yakobo mokapo 1, vɛrsɛ 2 mpe 3 ezali solo. Elobi ete: ‘Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge, mpo bino moko boyebi ete kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.’”

Likambo ya kokamwa, kondima mpe esengo ya ndeko Christensen, ekómaki makasi atako mikakatano mpe makambo oyo akutanaki na yango.

Nsima kaka ya kokanga ndeko Christensen, batyaki ye na bɔlɔkɔ oyo ezalaki mosika te na ndako na ye na Oriol. Na ntango wana, bapesaki mwasi na ye ndingisa ya kotala ye. Ndeko  Christensen asalaki mbula mibale na ndambo na bɔlɔkɔ yango. Na sanza ya 02/2019, bakatelaki ndeko Christensen mbula motoba ya bɔlɔkɔ. Nsima ya sanza misato, asɛngaki ete likambo na ye etalelama lisusu na tribinale mosusu, kasi baboyaki. Mpe na nsima batindaki ye na bɔlɔkɔ moko oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 200 na Oriol, mosika na ndako na ye mpe Irina.

Esali sikoyo pene na mbula moko, bamoni ete ndeko Christensen akoki sikoyo kosɛnga ete abima. Baboyaki mbala misato ndenge azalaki kosɛnga bátalela lisusu likambo na ye. Atako bongo, yango elɛmbisaki ye te mpe atikali kaka sembo.

Ndeko Christensen alobi na komikitisa nyonso ete: “Ngai ná Irina tozali mpenza bato ya kozanga kokoka, kasi toyebi koyika mpiko mpe kokoba kozala na esengo na ntango ya mpasi. Mpe oyo eleki mpenza ntina ezali ete topusani lisusu penepene ya Nzambe mpe Tata na biso, Yehova.”

Tozali kobondela mpe tozali na kondima ete Yehova akokoba kosalisa bandeko na biso nyonso ya Russie báyika mpiko na minyoko na esengo.​—Matai 5:11, 12