Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Semyon Baybak

25 SANZA YA 11, 2020
RUSSIE

Elenge mobali na nkombo Semyon Baybak akosamba mpo na kondima na ye

Elenge mobali na nkombo Semyon Baybak akosamba mpo na kondima na ye

Ntango ya kokata likambo

Na mokolo ya 18/12/2020, * tribinale ya etúká ya Leninskiy na Rostov-on-Don ekozwa ekateli na yango mpo na likambo ya ndeko Semyon Baybak. Prokirɛrɛ ayebisi tribinale ete bákatela ndeko Semyon etumbu ya bolɔkɔ mbula minei, kasi akokɔta bolɔkɔ te.

Makambo etali bomoi na ye

Semyon Baybak

  • Abotamá na: 1997 (na Rostov-on-Don)

  • Bomoi na ye: Azali na bayaya mibale, ya mobali mpe ya mwasi. Ayekolá monɔkɔ ya Chinois, mpe atángisaka monɔkɔ yango. Asepelaka kotánga mpe kokoma maloba ya ntɔki (poème)

  • Baboti na ye bateyaki ye makambo ya Yehova banda bomwana. Ntango akoli, ayekoli ete toli ya Biblia ezali malamu mpe azwi ekateli ya kosalela yango. Aboyaki kosala mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na ye. Asalaki mosala mosusu na esika ya mosala ya soda, banda na 2015 tii 2017, azalaki kokɔmbɔla mpe kotya bopɛto na lopitalo oyo bana bazwaka lisalisi ya minganga

Ndenge makambo ebandaki

Na mokolo ya 22/05/2019, bakonzi ya bapolisi bautaki na biro oyo elukaka bato mabe mpe bakɔtaki na bandako 13 ya Batatoli ya Yehova na Rostov-on-Don. Nsima ya pɔsɔ soki mibale, na mokolo ya 06/06/2019, bafundaki ndeko Semyon ete abuki mobeko. Na yango, bakangaki ye mpe batyaki ye na kasho mokolo moko, liboso tribinale etya ye na bolɔkɔ. Liboso bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ sanza mibale, mpe na nsima babakisaki mikolo yango mbala nsambo.

Liboso, bakonzi balobaki ete ndeko Semyon abuki mibeko mpo azali koyangana na makita ya losambo, mpe azali koyebisa bato makambo oyo azali koyekola na Biblia. Na sanza ya 11/2019, bakonzi bafundaki ye ete azali kopesa ebongiseli ya bato mabe mbongo.

Lokola bazali kokoba konyokola bandeko na biso na Russie, toyebi ete Yehova, “Nzambe ya kimya,” akokoba kopesa bango nyonso oyo basengeli na yango “mpo na kosala mokano na ye.”​—Baebre 13:20, 21.

^ par. 3 Dati yango ekoki kobongwana.