Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Andrzej Oniszczuk atɛlɛmi na tribinale ntango bazali kotalela lisusu ekateli ya kobimisa ye to te

09/08/2019
RUSSIE

Esali sikoyo mbula soki moko banda batyaki ndeko Andrzej Oniszczuk na bolɔkɔ epai azali kaka ye moko

Esali sikoyo mbula soki moko banda batyaki ndeko Andrzej Oniszczuk na bolɔkɔ epai azali kaka ye moko

Andrzej Oniszczuk, mwana-mboka ya Pologne mpe moko ya bandeko na biso ya bolingo, azali sikoyo na bolɔkɔ mpo na mwa ntango na Russie banda bato ya sireté bakangaki ye na mokolo ya 09/10/2018. Oyo ezali mbala ya mitano oyo bauti kobakisela ye etumbu ya bolɔkɔ. Etumbu na ye ya bolɔkɔ ekosila na mokolo ya 02/10/2019, to ekozanga kaka mwa mikolo mpo akokisa mbula moko na bolɔkɔ.

Andrzej, liboso bákanga ye na bolɔkɔ, elongo na mwasi na ye, Anna. Bapesaki ye nzela te akende kotala ye elekaki sanza zomi mobimba

Banda bakangaki ye, Andrzej azali na ndako ya bolɔkɔ epai azali kaka ye moko. Kobanda na ngonga ya 6 ya ntɔngɔ tii na ngonga ya 9 ya butu akoki kolala te. Bapesi ye kaka nzela ya kosukola na dushɛ na mai ya mɔtɔ mbala moko na pɔsɔ na boumeli ya miniti 15. Baboyaki kopesa Anna, mwasi ya Andrzej nzela akende kotala ye na bolɔkɔ na boumeli ya sanza zomi. Bakoki kaka kosolola na nzela ya mikanda to mesaje. Azalaki kosɛnga mbala na mbala akende kotala ye, kasi mbala nyonso bazalaki koboyela ye.

Ndenge lapolo emonisaki yango, Andrzej akangamaki ntango bapolisi ya mboka yango mpe bato ya sireté oyo balataki maskɛ bakɔtelaki ye na ndako mpe bandeko mosusu 18 na Kirov. Bafundaki ye na likambo mpo balobaki ete azalaki koyemba nzembo ya Bokonzi mpe koyekola mikanda ya losambo.

Andrzej ná bandeko mosusu minei ya Kirov (Maksim Khalturin oyo azali na mbula 44, Vladimir Korobeynikov oyo azali na mbula 66, Andrey Suvorkov oyo azali na mbula 26, mpe Evgeniy Suvorkov oyo azali na 41) bakangamaki na mbula oyo euti koleka mpe batyaki bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Tii lelo bazali kaka na bolɔkɔ. Likambo ya Andrzej, mpe ya bandeko na biso wana mosusu minei ezali kozela na Tribinale ya Mpoto oyo elandelaka ntomo ya moto.

Mbula oyo, bakonzi ya Russie bafundi na likambo bandeko koleka nsambo na Kirov; kati na bango Yevgeniy Udintsev oyo azali na mbula 70. Bafundi na likambo Batatoli ya Yehova 12 na Kirov mpo bazali kosala makambo na bango ya losambo.

Mpo na Andrzej, Anna, mpe bandeko na biso mosusu ya bolingo na Russie, tokoki soki moke te kobosana maloba oyo ezali na Liloba Nzambe: “Bókanisaka baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ lokola nde bokangami elongo na bango, mpe baoyo bazali konyokwama, mpo bino moko mpe bozali naino na kati ya nzoto.”​—Baebre 13:3.