11/6/2019
RUSSIE
Makambo oyo Dennis Christensen alobaki na tribinale na mokolo ya 16/05/2019
Na mokolo ya 16/05/2019 ntango azalaki na tribinale, Dennis azwaki maloba mpo na kosamba na boumeli ya ngonga soki moko mobimba. Oyo elandi ezali makambo oyo alobaki ntango azalaki kosamba na tribinale (Ekomamaki na monɔkɔ ya Russe):
Eleki bambula mingi moto mabe moko alobaki boye: ‘Soki lokuta elobami mbala na mbala, ekoki kotalelama lokola likambo ya solo.’ Na maloba mosusu, lokuta oyo ezongelami mbala nkóto ekómaka solo. Lokuta yango, oyo balingi kokómisa solo, ebimisi mobulu makasi mpe esali ete bato mingi oyo basali eloko te bányokwama.
Wana nyonso ekómá istware, mingi bamoni ete bato batángi kelasi na siɛklɛ ya 21 bazwi mateya mingi na makambo ya kala.
Kasi emonani lokola bazwi kaka liteya te. Mayele mabe yango nde basaleli ngai mpe Batatoli ya Yehova mosusu na Russie. Mpe yango ebimisi mobulu makasi mpe esali ete bato mingi oyo basali eloko te bányokwama.
Na likambo na ngai, lokuta yango emonisi ete nazalaki kopesa mabɔkɔ na kobombana na ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel, oyo tribinale elobaki ete ezali ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.
Efundeli yango ezongelamaki na tribinale, mbala na mbala, kozanga bápesa elembeteli ata moko. Na ndenge yango, emonani lokola bakómisi lokuta yango likambo ya solo.
Mpo na koloba solo, ngai natikalá kopesa mabɔkɔ soki moke te na ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel.
Ezali ete nazali Mokristo, mpe Motatoli ya Yehova. Ngai ná baninga na ngai tozalaki kosala makambo mingi ya losambo na biso oyo etambwisami na etuluku ya Batatoli ya Yehova mosusu oyo batikalá kozala te na ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel, mpe misala ya losambo na biso ebuki mobeko moko te na kotalela Artikle 28 ya mibeko-mokonzi ya ekólo Russie.
Natikalá mokolo moko te kopesa mabɔkɔ na ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel, mpe nabuki ata mobeko moko te ya ekólo Russie. Nakɔtá mpe te na ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.
Bato mingi bazalaki koloba boye: “Batatoli ya Yehova bazali bato ya kimya. Mpo na nini bazali kofunda bango ete bazali bato oyo balekisaka ndelo, mpe ‘kolekisa ndelo’ elimboli mpenza nini?” Mbala mingi nayebisaki bango: “Nayebi te!”
Batatoli ya Yehova balingaka bazalani na bango lokola bango moko. Basalaka makasi mpo na kosalisa bato ya kartye na bango. Bazali bato ya sembo; bato oyo batosaka mibeko ya Leta mpe bafutaka mpako. Mpo na nini babengi bango “bato oyo balekisaka ndelo”? Ngai nayebi te, mpe na ntango nazalaki kosamba, natikalaki te kozwa eyano ya malonga na motuna yango.
Bazali kofunda ngai ete nazalaki kopesa mabɔkɔ na mwa ebongiseli moko oyo ezalaki na bato soki zomi oyo tribinale emonisaki ete bazali bato oyo balekisaka ndelo. Ntango nini mpe ndenge nini nazalaki kopesa mwa ebongiseli yango mabɔkɔ? Nini oyo nasalaki mpo na komonisa ete nasalaki misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo?
Natikalaki te kozwa ata eyano moko na mituna wana nyonso ntango nazalaki kosamba. Mpe boyebi mpo na nini? Mpo bazali koluka kokómisa likambo oyo ezali lokuta solo ntango bazali kozongela yango mbala na mbala!
Awa na Russie, bato mosusu bazali koluka kondimisa basusu ete Batatoli ya Yehova bazali bato oyo balekisaka ndelo, kasi ezali sembo te, mpe ezali mpenza lokuta moko ya kosakana te. Batatoli ya Yehova bazali te bato oyo balekisaka ndelo. Boyebi mpo na nini?
Ya liboso, Batatoli ya Yehova basimbaka mindoki soki moke te mpe bakɔtaka te na kowelana ya bana-mboka. Na Etumba ya mibale ya Mokili mobimba na Allemagne, bandimaki kokufa mpo baboyaki kokɔta na Wehrmach, limpinga ya basoda ya ekólo Allemagne. Bakendaki te kobundisa basoda ya Union soviétique mpe koboma bango.
Na URSS, Batatoli ya Yehova banyokwamaki mpenza mpe bafundaki bango ete bazalaki bato oyo bazali kotɛmɛla bakoministe mpe bazalaki likama mpo na ekólo. Kasi bayinaki te bato oyo bazalaki konyokola bango.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali na bomoko ná bandeko na bango nyonso ya mokili mobimba oyo bauti na bikólo ekeseni mpe bato ya ndenge nyonso. Bafandaka elongo na kimya mpe na bomoko. Yango emonisi ete, atako bato bakeseni, bakoki kolonga kofanda elongo na bomoko.
Ya mibale, esika moko te na mokili, báfunda Batatoli ya Yehova ete bazali bato oyo balekisaka ndelo, longola kaka awa na Russie. Batatoli ya Yehova basalaka makambo ya losambo na bango na bonsomi mpe na kimya na bikólo koleka 200 na mokili mobimba. Bayebani lokola bato ya kimya oyo bakoki ata moke te kopesa mabɔkɔ na misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo.
Bango nyonso bandimaka kaka mateya oyo euti na Biblia, oyo etindaka bango bámonisa bizaleli lokola bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.
Biblia ebengi bizaleli yango “mbuma ya elimo,” mpe bizaleli ya ndenge wana esalaka ete bato báfanda na kimya na basusu. Bizaleli yango ezali na boyokani te na misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo. Kasi, moto nyonso azwelaka yango litomba.
Ya misato, ezala mpe bato oyo balandelaka ntomo ya moto na Russie bamoni mabe ndenge Russie esaleli mobeko oyo etali misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo mpo na kofunda Batatoli ya Yehova. Mingi na bango balobaki polele ete yango ezali kopesa nsɔni na ekólo Russie oyo emibengaka ekólo ya demokrasi oyo etambwisami na mibeko. Bato yango bakokaki te komona mabe ndenge Russie esaleli mobeko yango mpo na kofunda Batatoli ya Yehova soki ezalaki na elembeteli moko oyo endimisi likambo yango.
Ya minei, mikili nyonso mpe ekweisaki Russie ndenge esaleli mobeko etali misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo mpo na kopekisa misala ya Batatoli ya Yehova na Russie. Lisangá ya badepite ya Mpoto (Assemblée parlementaire du conseil de l’Europe) esɛngi na bakonzi ya Russie bátika kosalela mobeko wana mpo na kopekisa Batatoli ya Yehova. Ebongiseli moko ya ONU oyo etalelaka ntomo ya moto emonisaki ndenge ezali komitungisa mpo Russie esaleli mobeko wana mpo na kopekisa misala ya Batatoli ya Yehova. Elobeli minyoko oyo bana-mboka wana ya kimya mpe oyo basali eloko te bazali kokutana na yango.
Yesu Kristo ayebisaki bayekoli na ye ete: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:20) a Na nsuka, bakweisaki ye na likambo mpe babomaki ye na kolanda bifundeli ya lokuta, mpe ezalaki likambo ya kozanga bosembo.
Kasi lelo tozali na siɛklɛ ya liboso te, tozali mpe na Moyen-Âge te. Tozali na siɛklɛ ya 21, ntango oyo bato bazali na ntomo mpe bonsomi ya losambo; elingi koloba ntomo oyo bato nyonso basengeli kozala na yango ndenge moko.
Ebongi mpenza kopekisa moto andimela Nzambe mpe na nsima kokanga ye na bolɔkɔ mpo na yango? Ekoki kosalema te. Ekoki mbala mosusu kosalema na bikólo oyo bakonzi nde bakweisaka mitindo, kasi te na bikólo ya demokrasi oyo etambwisami na mibeko, oyo nakanisi Russie mpe ezali na kati ya bikólo yango, to ezali kosala makasi ezala na kati ya bikólo yango.
Ntango nazalaki kosamba, nayokaki bamosusu balobaki ete soki moto amonaka ete lingomba na ye ezali ya solo mpe azali kolobela yango polele akómi moto oyo elekisaka ndelo. Yango ezali na nzela te, mpo moto nyonso oyo asambelaka amonaka ete lingomba na ye ezali ya solo. Mpo na nini akokoba kosambela na lingomba yango soki azali kondima te ete ezali ya solo?
Soki ezalaki bongo wana tokoloba ete Yesu mpe azali moto oyo alekisaka ndelo. Kutu, alobaki na Ponsi Pilate boye: “Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina na solo. Moto nyonso oyo azali na ngámbo ya solo ayokaka mongongo na ngai.”—Yoane 18:37.
Yango emonisi ete solo ezali na kati ya Biblia. Yesu asakolaki solo yango mpe ateyaki yango bayekoli na ye. Azalaki kolobela solo nyonso te. Kasi, azalaki nde kolobela solo etali mokano ya Nzambe. Libosoliboso, mokano ya Nzambe mpo na Yesu, “mwana ya Davidi” (to mokitani), ezali ya kokómisa ye Nganga-nzambe monene to Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe.
Yesu amonisaki ete koya na ye, bomoi na ye mpe mosala na ye awa na mabele ezalaki libosoliboso mpo na kopesa litatoli mpo na solo etali Bokonzi yango. Lelo oyo, bato batalelaka Yesu lokola moto oyo alekisaka ndelo kaka mpo asakolaki solo yango?
Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa na ye mpe basakolaka solo yango, oyo ekomami na Biblia; Bokonzi yango ya Nzambe nde ezali solisyo se moko mpo na kosilisa mikakatano ya bato. Bayebisaka bato nyonso makambo oyo ekomami na Biblia, Liloba ya Nzambe.
Yesu abondelaki Nzambe boye: “Santisá bango na solo; liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Yango wana, ezali na ntina mingi moto nyonso ayekola solo yango na Biblia. Ezali na litomba mpe ezali na boyokani te na misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo.
Kaka Batatoli ya Yehova te nde bandimaka ete Biblia ezali solo. Moto moko ya siansi na nkombo Mikhail Lomonosov alobaki boye: “Mozalisi apesá bato buku mibale. Na moko amonisaki nkembo na ye, mpe na mosusu amonisaki mokano na ye. Buku ya liboso ezali mokili oyo tozali komona, oyo akelá . . . Buku ya mibale ezali Makomami mosantu.”
Kozanga ntembe, Lomonosov ayekolaki Makomami mosantu malamumalamu mpe makambo alobaki ezali solo. Tokoki koyekola makambo mingi oyo etali Nzambe ntango tozali kotala biloko oyo akelá. Mpe tokoki koyekola lisusu makambo mingi oyo etali ye soki tozali kotánga, koyekola mpe kotalela malamumalamu Biblia, Liloba na ye.
Biblia yango moko elobi boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, . . . mpo na kopesa disiplini na boyengebene, mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Mpo na mosala nyonso ya malamu!
Na makita ya bokristo, oyo nazalaki koyangana mpe kosangana na yango mpe oyo etambwisamaki na etuluku moko ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na boyokani ata moko te na ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel, tozalaki kolobela mpenza ndenge oyo tokoki kosalela bato mosala nyonso ya malamu.
Video mibale ya makita na biso ya mokolo ya 19/02/2017 mpe mokolo ya 26/02/2017, oyo tolakisaki awa na tribinale, emonisaki polele ete ezalaki ata na eloko moko te oyo elobamaki kuna ezalaki kolendisa misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo. Tozalaki kolobela mateya ya Biblia oyo ezali mpenza na litomba mpo na moto nyonso. Makita yango elekaki na esengo mpenza mpe na kimya, kaka ndenge makita nyonso ya Batatoli ya Yehova esalemaka.
Mateya ya Biblia oyo tolobelaki esalaki bato mabe te. Kutu, esalisaki mpe elendisaki bato mingi. Mpo na baoyo babungisi moto oyo balingaka na liwa, Biblia epesi bango elikya oyo ezali kobɔndisa: “Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”—1 Bakorinti 15:26.
Moto nyonso abangaka liwa mpo ezali monguna ya nsɔmɔ, kasi Nzambe abangaka liwa te. Alaki boye na Yisaya 25:8: “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”
Ekozala ntango moko kitoko! Matangá mpe nkunda ekozala lisusu te. Mpisoli ya mawa ekobongwana ya esengo ntango Nzambe akokokisa elaka na ye ya kosekwisa bato oyo bakufá. Nsukansuka, bampasi mpe mawa nyonso oyo liwa ebimisá ekosila.
Elikya wana ebɔndisaka ngai mingi mpo ngai moko nabungisá bato mingi oyo nalingaka. Ntango nazalaki na bolɔkɔ, moto moko oyo nazalaki kolinga mingi akufaki, nkɔkɔ na ngai ya mwasi, Helga Margrethe Christensen.
Azalaki moto ya liboso oyo ayekolaki Biblia na libota na biso mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Ye moto ya liboso oyo ateyaki tata na ngai Biblia mpe na nsima ateyaki mpe ngai. Bato mingi oyo bayebaki ye; ezala bato ya kartye, baninga ya mosala, bato ya libota, bazalaki kolinga mpe komemya ye mingi.
Azalaki mpe kolinga mpe komemya moto nyonso, ezala moto ya lingomba nini, ekólo nini, mposo nini. Alingaki kosalisa moto nyonso, mpe azalaki kosalela moto nyonso mosala oyo ezali malamu. Likambo ya mawa, bato mosusu balobaki ete azali moto oyo alekisaka ndelo. Kasi bato ya makanisi malamu bandimelaki bato wana te.
Nazali kozela mokolo oyo Nzambe akozongisa ye na bomoi, mpe tokomonana lisusu. Likambo mawa, nakokaki te kozala ntango bakundaki ye. Nakokaki te kobɔndisa bato ya libota na ngai na ntango wana ya mpasi, mpo nazalaki na bolɔkɔ mpo na bifundeli ya lokuta.
Elikya ya lisekwa oyo Biblia epesi mpo na bato oyo bakufá ebɔndisaka ngai mpe ekitisaka ngai motema ete mokolo moko tokomonana lisusu na mokili oyo epɛtolami ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Soki elikya yango ekoki kosalisa mpe kobɔndisa ngai, nandimi ete ekoki mpe kosalisa mpe kobɔndisa bato mosusu.
Mateya mosusu ya Biblia oyo toyekolaki na makita na biso elobelaki paradiso oyo ekoya awa na mabele, epai biloko ya kolya ekozala beboo mpo na moto nyonso mpe kimya elongo na bato nyonso; maladi ekozala te, ndenge emonisami na esakweli ya Yisaya 33:24: “Mpe moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’ Bato oyo bafandi na mokili yango bakolimbisama libunga na bango.”
Koyebisa basusu bilaka yango ekoki nde kosala bango mabe? Te, kutu, bilaka yango ekoki kopesa bato elikya mpe esengo. Yesu alobaki boye: “Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”—Luka 11:28.
Moto nyonso azali na bonsomi ya kondima to te. Nzambe atindaka moto moko te asalela ye na makasi. Ye moko alobaki boye na Yirimia 29:11: “‘Mpo ngai nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’”
Nzambe apesi biso nyonso libaku malamu ya kozala na bomoi; elingi koloba kosala boyokani ya makasi ná ye. Batatoli ya Yehova bazali kosɛnga bato bázwa libaku wana ya malamu, básala boninga makasi elongo na Nzambe oyo ekopesa bango likoki ya kozwa bomoi ya seko. Makambo nyonso wana ezali na boyokani moko te na misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo. Nini oyo nasalaki mpo na komonisa ete nasalaki “misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo? Mpe mpo na nini balingi kokatela ngai etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ?
Nasalaki likambo moko te oyo emonisi ete nazali moto mabe to ya mobulu. Bato ya kartye, bapolisi epai nafandaka, mpe bakonzi ya bolɔkɔ esika nazali bazali koloba malamu mpo na ngai. Yango wana, nalingi lisusu kozongela mituna oyo: Nini oyo nasalaki mpo na komonisa ete nasalaki “misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo?” Mpe mpo na nini balingi kokatela ngai etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ?
Eleki sikoyo mbula mibale, nazali kozwa te biyano ya malonga na mituna yango mpe tii sikoyo nazwi kaka te biyano na mituna yango. Mbala mosusu, Cour d’appel ekozala na likoki ya kopesa ngai biyano ya malonga na mituna na ngai, mpo tribinale ya liboso elongaki te kopesa ngai eyano na mituna na ngai.
Ndenge nalobaki yango liboso, tozali sikoyo na siɛklɛ ya 21, kasi te na Moyen-Âge. Lelo oyo makambo mingi ebongwani mpo bato bayekoli makambo mingi. Kasi, likambo ya mawa ezali ete bato mingi na Russie bazali konyokwama mpe bazali konyokola bango makasi mpo na kondima na bango.
Na mokolo ya 15/07/2019, ntango bazalaki kotunatuna Batatoli ya Yehova nsambo mituna, komite ya ankɛtɛ ya Sourgout ebɛtaki bango makasi mpo bápesa komite yango eyano oyo elingaki. Baboyaki ete Batatoli ya Yehova básalela artikle 51 ya mibeko-mokonzi ya Russie, oyo epesi moto nzela ya koboya kotatola mpo na moto ye moko to mpo na basusu, mwana-mboka nyonso ya Russie asengeli kosalela mobeko yango.
Basɛngaki bango na makasi báfukama mpe bátombola mabɔkɔ na likoló, na nsima babɛtaki bango na mitó mpe nzoto mobimba. Batyolaki bikólo na bango mpe bindimeli na bango. Mpo bápema malamu te, batyaki bango saki na mitó mpe bakangaki bango nsinga na nkingo mpe bakangaki bango mabɔkɔ na mokɔngɔ mpe batyaki bango nsinga na makolo. Bazalaki kogangela bango mpe kotinda bango na makasi báloba. Mbala ebele, basusu kati ya Batatoli ya Yehova yango balingaki kokufa mpe bazalaki komiyeba lisusu te. Na nsima basopelaki bango mai mpe bazalaki kolɛngisa bango na kura.
Makambo nyonso wana ebatelami malamu na mikanda ya bato oyo balandelaka makambo, kasi bazali kolandela ata moto moko te ya komite ya ankɛtɛ mpo na makambo mabe oyo basalaki. Bato oyo bapesaki bango mokumba ya kolandela makambo yango bakangi miso na mabe wana nyonso. Kutu basusu bazali koloba ete Batatoli ya Yehova bango moko bamizokisaki. Ezali likambo moko oyo ekoki kosalema te! Ezali lokuta moko ya kosakana te!
Nyonso wana ezali nsɔni mpo na Russie mpe istware na yango ya mikolo oyo, mpe nakanisi ete bato mabe bakozwa etumbu. Ndenge nini bakoki kosala bato makambo ya boye? Ndenge nini bakoki kosala makambo mabe oyo Hitler ná Stalin basalaki? Ekoki kosalema bongo te. Nandimi mpenza ete ezalaki makambo moko ya mabe oyo ekoki kozongelama ata moke te na ntango na biso!
Ekateli oyo tribinale ya liboso ezwaki, yango oyo: “Kokoba kosala misala ya ebongiseli ya lingomba oyo epekisami mpenza na tribinale mpo na misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo ezali kobuka mibeko, mpe ebongi kozwela yango etumbu.” Wana likambo ezali te. Kasi yango eyokani na nini na likambo na ngai?
Ezali na boyokani te na likambo na ngai! Ngai natikalá kopesa mabɔkɔ soki moke te na ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel. Napesá naino te mabɔkɔ na misala ya ebongiseli yango.
Makambo nyonso oyo nazalaki kosala ezalaki mpo na bomoi na ngai ya bokristo elongo na etuluku moko ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na boyokani moko te na ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel. Makambo nyonso nasalaki eyokanaki na mibeko mpe na Artikle 28 ya mibeko-mokonzi ya Russie.
Nandimaka soki moke te ete makambo oyo nasalaki emonisi ete napesaki mabɔkɔ na misala oyo makambo na yango elekisaka ndelo ya ebongiseli oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel. Na masolo oyo tosololaki na telefone ná moninga na ngai moko, oyo toyokaki yango mpe na tribinale, nayebisaki ye boye: “Tozali etuluku moko ya lingomba. Tosalaki te elongo na ebongisi oyo etambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na Orel.”
Tribinale ya liboso eboyaki likambo oyo nalobaki mpe endimaki koyoka litatoli ya lokuta ya mosali moko ya Leta oyo amipesaki nkombo Iermolov mpo báyeba ye te. Soki Cour d’appel elandeli likambo yango ekomona ete Iermolov ezali nde Oleg Kourdioumov.
Mbala ya liboso, Oleg Kourdioumov alobaki na bato oyo basalaka ankɛtɛ ayebaki ata likambo moko te mpe ete asalelaki Artikle 51 ya mibeko ya Russie. Mokolo elandaki, alobaki makambo mosusu na nkombo ya Iermolov. Na nsima, alobaki makambo mingi kaka na nkombo yango.
Na tribinale, ntango tolakisaki video mibale ya makita na biso oyo esalemaki na mokolo ya 19/02/2017 mpe na mokolo ya 26/02/2017, emonani ete Oleg Kourdioumov nde azalaki kozwa bilili na kobombana ntango tozalaki kosala makita na biso. Ezalaki likambo ya kokamwa ndenge emonanaki polele na video ete ye nde moto azalaki kozwa bilili. Kamera ezalaki koningana soki aningani mpe moto ayei pene na ye, okoki koyoka polele ndenge azalaki koloba: “Mbote, nkombo na ngai Oleg.”
Ya liboso, asalaka elongo na bato ya sireté ya FSB, azalaki kozwa bilili ntango tozalaki kosala makita na biso. Ya mibale, asalelaka nkombo na ye mpenza mpe alobi ete ayebi ata likambo moko te. Ya nsuka, azali kosalela nkombo ya lokuta mpe akosi bato oyo basalaka ankɛtɛ. Na nsima, azongeli lisusu lokuta na ye na tribinale. Wana ezali mpenza sembo?
Mibeko epekisi bato ya sireté ya FSB kosalela nkombo ya lokuta mpo na kopesa litatoli na tribinale. Kasi prokirɛrɛ, ezala bazuzi nyonso bakangi miso na likambo yango mpe batiki moto ya sireté asalela nkombo ya lokuta mpo na kopesa litatoli ya lokuta. Sikoyo, litatoli wana ya lokuta nde basaleli yango mpo na kokweisa ngai na likambo. Nazali kokanga ntina te mpo na nini tribinale ekoki kotika nzela na likambo ya ndenge wana.
Likambo oyo mingimingi biro ya prokirɛrɛ esali ezali kobulunganisa ngai. Mokumba ya prokirɛrɛ ezali mpenza ya kotosisa mibeko ya Leta kozonga kopona bilongi. Kasi ekangi kaka miso na likambo oyo esalemi mpe etiki likambo yango ekoba.
Nasɛngi na tribinale eyoka ngai malamu. Nazali na likambo na moto te. Nandimi ete bato oyo bazali kolandela makambo oyo bazali bato oyo esengeli komemya bango mpe bazali bato mabe te. Ata ndɛlɛ mokolo mosusu tokofanda mpe kopesela mpo na kozwa mwa kɔpɔ elongo. Kasi likambo ya mawa, mpo na koloba solo, basalaki mosala na bango malamu te.
Emonani lokola nde bazuzi oyo basambisaki ngai na mbala ya liboso basalelaki moto moko ya sireté ya FSB na kobombana lokola motatoli ya lokuta. Mpo na nini? Mpo moto yango aloba lokuta mpe likambo nyonso oyo alingi mpo nakɔta bolɔkɔ.
Motatoli ya bongo bakoki kotyela ye motema te mpe bakoki te kozwa bansango ya solo epai moto ya ndenge wana. Ebongi te bato oyo basali likambo ata moko te bákɔta bolɔkɔ mpo na litatoli wana ya lokuta.
Eleki mbula mibale, ntango tribinale ezalaki kotalela soki bakoki to te kobakisela ngai etumbu ya bolɔkɔ, nayebisaki bango boye: “Nasɛngi na bino bópesa ngai bonsomi nakoba bomoi na ngai!” Yango nde kaka mposa na ngai.
Ndenge bakangi ngai na bolɔkɔ, nazali komona lokola mposa na bango ezali kaka te ya kotya ngai mosika na bato to kopesa ngai etumbu. Kasi balingi kotya ngai mosika mpo likambo na ngai ebenda te likebi ya bato mingi.
Na yango, mpo na ngai ndenge batiki ngai kaka na bolɔkɔ ezali kobuka mibeko mpe ezali mabe makasi. Mokano na bango ezali ya kopekisa ngai namibongisa malamu te mpo na kosamba mpe bapanzi-nsango báyeba te makambo oyo ezali koleka. Kasi ata ndɛlɛ nyonso wana ekoyebana mokolo moko!
Ya solo, nasɛngi na bino bópesa ngai bonsomi nakoba bomoi na ngai na kimya na engumba kitoko oyo elongo na mwasi na ngai, Irina. Esali sikoyo mbula soki mibale, nazali te na bonsomi ya kosala oyo nalingi. Nazali nde kosala makambo oyo basusu bazali koponela ngai.
Bato ya sireté ya FSB bakoselaki ngai makambo mpe yango ebebisaki lokumu na ngai. Bakomaki makambo ya lokuta mpe babongolaki makambo oyo bato ya ankɛtɛ bakomaki mpe basalelaki litatoli ya lokuta na kobombana mpo na kokweisa ngai na tribinale.
Basali nyonso wana mpo na komonisa bato ete mokristo oyo ya kimya azali moto oyo alekisaka ndelo mpe azali likama mpo na basusu. Mpo na koloba solo, bifundeli ya ndenge wana ezali bozoba mpe ezangi motó na makolo.
Ezali likambo ya mawa ndenge tribinale eboyaki bilembeteli ya solo mpe endimaki bifundeli wana ya lokuta. Nasɛngi na yo, zuzi mokonzi osilisa matata oyo mpe obimisa bosolo ya likambo. Nasɛngi na bino: “Bózongisela ngai bomoi na ngai!”
Eleki sikoyo mbula misato, nalobaki boye na tribinale: “Ekateli oyo ebongi mpo na ngai mpo na kosilisa likambo oyo esengeli bótika ngai mpe bósɛnga bolimbisi mpe bófuta ngai mpo na ntango oyo nalekisi awa. Nakondima ekateli mosusu te!” Nakobongola maloba na ngai te.
Bikateli mosusu nyonso ekozwama ekozala oyo ebongi te mpe nakomema likambo yango na Tribinale ya Mpoto oyo elandelaka ntomo ya moto na Strasbourg. Kuna, bókita bómata nakolonga kaka.
Mpe soki esalemi bongo, Tribinale ya Mpoto oyo elandelaka ntomo ya moto; bato nyonso na mokili mobimba; bakonzi ya Russie; ezala mpe prezida Vladimir Poutine, bakokamwa mpe bakomituna ndenge nini tribinale ya Orel ekokaki te komona bilembeteli ya polele oyo ezali komonisa ete makambo nyonso oyo bato mabe wana balobaki ezali kaka lokuta ya mpamba oyo bazalaki kobandela mbala na mbala mpo ekóma likambo ya solo.
Esengeli kaka kozela ntango molai bongo mpo likambo ekatama na bosembo? Soki kaka Cour d’appel endimi ete nakoba kosamba likambo na ngai, nalingi bino nyonso oyo bozali awa, ezala baoyo bazali kolandela likambo oyo na mosika ete nakondima kokende na likambo oyo tii na nsuka!”
Nakotika te mpo nayebi ete bifundeli nyonso oyo basali mpo na nkombo na ngai ezali ya lokuta mpe ete nyonso nazali koloba ezali solo. Nazali kobanga soki moke te kokɔta bolɔko, atako yango ekozala ekateli ya kozanga bosembo.
Nazali kobanga te, mpe nakobanga te. Nazali na kimya ya motema mpe ya makanisi. Nzambe na ngai, Yehova, akosundola ngai soki moke te mpe nazali komona kokokisama ya maloba oyo ya kitoko:
Mpo Nzamb’azali sembo,
Akoki te kobosana nga’.
Azali pene na nga’;
Yehova azali na nga’.
Yah nde oy’a nga’ mosungi
mpe mobateli tii nsuka.
Ye nde Tata, Nzambe
na nga’ mpe Moninga.
Ya ngai nyonso wana. Matɔndi mingi na baoyo bazali koyoka ngai!
a Dennis atángaki maloba ya bavɛrsɛ oyo ezali na Biblia—Libongoli ya Synode na monɔkɔ ya Russe. Kasi, mpo na mokano ya libongoli oyo, bavɛrsɛ nyonso eutaki na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu.