Lakisá makambo oyo ezali na kati

Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato na Strasbourg, France

10/06/2020
RUSSIE

Mbula zomi nsima ya ekateli oyo Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (ECHR) ezwaki, Russie ezali kaka kokoba kobuka mobeko ya bikolo nyonso

Mbula zomi nsima ya ekateli oyo Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (ECHR) ezwaki, Russie ezali kaka kokoba kobuka mobeko ya bikolo nyonso

Eleki sikoyo mbula zomi, na mokolo ya 10/06/2010, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (ECHR) elobaki ete bakonzi ya Russie bazali te kotosa ntomo ya Batatoli ya Yehova na ndenge báboyi kopesa bango bonsomi ya kosala losambo na bango. Ekateli ya ECHR eyebisaki Russie efuta lomande mpe ezongisa bandako ya ebongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo bakonzi ya Russie babɔtɔlaki na Moscow na 2004.

Ntango kaka bakataki likambo yango, ndeko Ivan Chaykovskiy oyo azalaki kotambwisa makambo na lisangá ya batatoli ya Yehova na Moscouw alobaki boye: “ekateli oyo ECHR ezwi elongi mpenza likambo etali kokanisela ebongiseli ya batatoli ya Yehova mabe. Nazali kolikya ete ekateli oyo ekosala ete bakonzi bazongisa nokinoki ntomo ya bonsomi ya Batatoli ya Yehova mpe guvɛrnema ekotika konyokola Batatoli ya Yehova na ekólo mobimba.”

Nzokande, makambo elekaki te ndenge azalaki kolikya. Bakonzi ya Russie batosaki te ekateli oyo Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (ECHR) Kutu nde bakómaki konyokola bandeko na biso mingi koleka. Konyokola bandeko na biso ekómaki mabe lisusu koleka ntango Tribinale monene ya Russie epekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na 2017. Na nsima ya ekateli oyo ya kozanga bosembo oyo, bandeko na biso mingi bakangamaki, bamemaki na Tribinale mpe batyaki bango na bolɔko.

Atako esili koleka bambula zomi, ba Tribinale mingi emoni ete ekateli wana oyo ezali kokweisa Russie ezali mpenza na ntina. Na 2010, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (ECHR) eboyaki bifundeli ya lokuta oyo Russie ezali kobimisela bandeko ba biso, oyo bazali bato oyo bato ya kimya.

Na mokuse, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (ECHR) elobaki ete ministere ya justice ya Moscow, na Tribinale ya Moscow, bazali na “ntina moko te oyo endimami na mibeko” mpo na kopekisa mosala ya Batatoli ya Yehova. Tribinale ekweisaki bakonzi ya Moscow, mpe elobaki ete “bazali na motema malamu te, bazali na bakatikati te, mpe basengeli koponaka bilongi.” Lisusu, bakonzi ya Moscow babuki mobeko ya Convention européenne des droits de l’homme, oyo Russie endimaki ete ekotosa.

Na 2020, ndenge moko kaka 2010, ndenge Russie ezali konyokola bandeko na biso endimami esika moko. Rachel Denber, oyo azali mokambi-molandi na Mpoto mpe mokambi ya Human Rights Watch na Azie centrale, alobi boye: “Mpo Batatoli ya Yehova bazali kosala losambo na bango, bazali kotya bonsomi na bango na likama.” Lisusu, na mokolo ya 09/01/2020, alobaki boye: “Ezali na ntina moko te oyo ekoki kotinda bango basala bongo.”

Na oyo etali bosembo, tozali kobondela mpe totyeli Yehova motema ete akokoba kopesa bandeko na biso na Russie makasi na ndenge bazali konyokola bango na kozanga bosembo nyonso. Mpe Yehova akosalisa bango mpo “báyika mpenza mpiko mpe bázala na motema molai ná esengo.”​—Bakolose 1:11.