Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Aleksey Budenchuk elongo na mwana na ye mobali, Yegor; mwana na ye ya mwasi, Sofiya; ná mwasi na ye, Tatyana

07 SANZA YA 07, 2021
RUSSIE

Ndeko Aleksey Budenchuk abimi na bolɔkɔ na Russie

Ndeko Aleksey Budenchuk abimi na bolɔkɔ na Russie

Na mokolo ya 06/07/2021, ndeko Aleksey Budenchuk abimaki na bolɔkɔ na engumba Orenbourg nsima ya kosilisa mbula na ye ya bolɔkɔ. Azali moko ya bandeko motoba ya engumba Saratov oyo bakangaki bango na bolɔkɔ na sanza ya 09/2019. Sikoyo, bandeko misato batikali na bolɔkɔ. Bato ya libota ya Aleksey mpe baninga na ye basalaki mobembo ya ntaka ya bakilomɛtrɛ koleka 800 mpo bázala wana ntango Aleksey azali kobima na bolɔkɔ. Sikoyo akozonga na mboka na ye na Saratov elongo na bato ya libota na ye.