Lakisá makambo oyo ezali na kati

Banda na lobɔkɔ ya mwasi tii na lobɔkɔ ya mobali: Ndeko Sergey Britvin ná Vadim Levchuk bazali na tribinale

20/8/2020
RUSSIE

Ndeko Britvin mpe ndeko Levchuk bakateli bango mbula 6 na ndambo ya bolɔkɔ

Ndeko Britvin mpe ndeko Levchuk bakateli bango mbula 6 na ndambo ya bolɔkɔ

Mokolo ya kokata likambo

Mokolo ya 02/09/2020, *  tribinale ya engumba ya Berezovsky, na etúká ya Kemerovo

Etumbu

Mbula 6 na ndambo ya bolɔkɔ

Makambo etali moto

Sergey Britvin

  • Abotamá na: 1965 (Na etúká ya Kemerovo)

  • akambo etali bomoi na ye: Azalaki motambwisi ya bamasini ya minene oyo etombolaka biloko mpe motambwisi ya mituka ya minene bambula zomi. Azwaki pansiɔ mpo na maladi. Asepelaka na masano mpo na kosala ngalasisi

  • Na 1992, abalaki Natalya. Na 1995, akómaki koyekola Biblia mpe ayekolaki ete Nzambe alaki kosekwisa bato na mikolo ezali koya. Nsima ya bambula, Natalya abandaki koyekola Biblia. Akamwaki ndenge Sergey akómaki na kondima makasi mpe yango esalisaki ye asala mpe bambongwana

Vadim Levchuk

  • Abotamá na: 1972 (Na etúká ya Kemerovo)

  • Makambo etali bomoi na ye: Akolaki na libota oyo bato basambelaka te. Azalaki kosala na esika oyo balukaka mabanga ya ntalo na boumeli ya mbula 14

  • Abandaki koyekola Biblia na 1992. Abalanaki na Tatiana na 1997. Bazali na bana mibale ya mibali. Bato ya libota na ye mobimba batosaka mitinda ya Biblia. Bango nyons basepelaka na masano mpe kobima na ndako mpo na kosala misala ndenge na ndenge

Makambo ya tribinale

Na mokolo ya 22/07/2020, Polisi mpe bato ya sireté (FSB) bapanzaki bandako 8 ya bandeko na biso na engumba Berezovsky. Nini esalemaki na nsima? Bakangaki ndeko Britvin ná Levchuk mpo na kotunatuna bango mituna. Likambo ya mawa, tribinale monene epesaki etinda ete bátya bandeko na biso na kasho mpo na mwa ntango. Batyaki bango na kasho na boumeli ya mbula moko na ndambo. Na mokolo ya 25/12/2019, batyaki bandeko na biso na bolɔkɔ, epai bazali sikoyo.

Ndeko Britvin ná Levchuk bazali bandeko oyo bakisa mpe bandeko mitano mosusu oyo bakangi bango mpo na kondima na bango na etúká ya Kemerovo. Tozali komitungisa mpe kobondela mpo na bandeko na biso nyons oyo bakangami na bolɔkɔ na Russie. Ndenge Baebre 13:3 elobi: “Bókanisaka baoyo bakangami na minyɔlɔlɔ lokola nde bokangami elongo na bango, mpe baoyo bazali konyokwama, mpo bino moko mpe bozali naino na kati ya nzoto.”

^ par. 3 Likambo ekoki kobongwana