Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Gennady Shpakovskiy elongo na mwasi na ye, Tatiana

05 SANZA YA 06, 2020
RUSSIE

Ndeko Gennady Shpakovskiy akoki mbala mosusu kosala mbula nsambo na ndambo na bɔlɔkɔ na Russie

Ndeko Gennady Shpakovskiy akoki mbala mosusu kosala mbula nsambo na ndambo na bɔlɔkɔ na Russie

Tribinale ya engumba Pskov ekoyebisa ekateli oyo ekozwa mpo na likambo ya ndeko Gennady Shpakovskiy, oyo azali na mbula 61. Bazali kofunda ye ete azali kosala misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo, kaka mpo azali kosala mwa likita ya losambo na ndako na ye. Prokirɛrɛ ayebisaki Tribinale etinda ye na bɔlɔkɔ mpo na mbula nsambo na ndambo.

Na ebandeli ya mobu 2018, bato ya sireté (FSB) bazalaki kolukaluka na ndako ya ndeko Shpakovskiy mpe bazalaki kokɔtisa makambo oyo bazalaki koloba na aparɛyi mpe kolandela misala na bango. Na mokolo ya 03/06/2018 na 12:45 na nsima ya midi, bato ya sireté (FBS) elongo na basoda ya Garde nationale bakɔtaki na lopango moko na makasi, epai bato bazalaki kosala makambo na bango ya losambo na kimya, mpe balukalukaki na ndako yango na boumeli ya ngonga 6 mobimba.

Bato ya sireté (FSB) babɔtɔlaki batablɛti mpe batelefone mpe bakangaki Batatoli ya Yehova mpo na kotunatuna bango mituna. Bato oyo bazalaki kotunatuna bango bazalaki kofinga bango mpe kobangisa bango ete bakolongola bango na mosala mpe bakolandela bango na batribinale. Batunatunaki ndeko Shpakovskiy mituna tii na ngonga ya 22:00.

Na mokolo ya 19/03/2019, bafundaki ndeko Shpakovskiy ete abongisaki misala ya ebongiseli oyo “mosala oyo makambo na yango elekisaka ndelo.” Sanza mitano na nsima, bafundaki ye ete “azalaki kopesa mbongo mpo na kosunga misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.”

Wana tribinale elingi kokata likambo yango, tozali kobondela Yehova na motema mobimba ete asalisa libota ya ndeko Shpakovskiy mpo etikala makasi na elimo. Toyebi ete akozwa mbano mpo na ezaleli na ye ya koyika mpiko mpe bosembo na ye.​—2 Ntango 15:7.