Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Moskalenko, sikoyo abimi na bolcɔkɔ, azali na libándá ya lopango ya tribinale

04/09/2019
RUSSIE

Ndeko Valeriy Moskalenko abimi na bolɔkɔ

Ndeko Valeriy Moskalenko abimi na bolɔkɔ

Na mokolo ya 02/09/2019, na tribinale ya Zheleznodorozhniy ya etúká Khabarovsk, na Russie, bazuzi bakatelaki ndeko Valeriy Moskalenko etumbu ya bolɔkɔ ya mbula mibale mpe sanza mibale ya mosala mpo na bolamu ya bana-mboka mpe sanza mosusu motoba bazalaki kokɛngɛla ye lokola mosali-mabe moko boye. Asengeli lisusu te kolekisa mikolo na bolɔkɔ.

Ntango ekateli ya nsuka ezwamaki mpo na ye, ndeko Moskalenko abimaki na bolɔkɔ mpo akutana lisusu na bandeko na ye ya libota mpe baninga na ye. Akɔtaki bolɔkɔ banda na mokolo ya 02/08/2018. Liboso bákanga ye, azalaki kosala lokola kapitɛni mosungi ya engbunduka mpe azalaki kobatela mama na ye oyo azalaki kobɛla. Na sanza motoba oyo bakonzi bakolandela ye, akoki te kosala mibembo na libándá ya Khabarovsk mpe asengeli koyaka sanza nyonso kopesa eyano na bifundeli oyo bafundaki ye mpo na koyeba soki azali kosala likambo moko oyo ezali kobuka mibeko.

Na mokolo ya 30/08/2019 nde ndeko Moskalenko alobaki maloba na ye ya nsuka na tribinale, alobaki boye: “Ekoki kosalema ata moke te ete natɛmɛla mokano ya Nzambe oyo ezali polele na Biblia. Ezala bakosala ngai nini to bakopesa ngai etumbu nini, ata soki esengeli nakufa, nalobi ete nakosundola ata moke te Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ye oyo azali na nguya nyonso, Yehova Nzambe.”

Yaroslav Sivulskiy, momonisi ya Association européenne ya Batatoli ya Yehova, alobi boye: “Atako tondimi te ekateli ya etumbu oyo bakateli ye, tozali na esengo ete Valeriy akoki kozonga na ndako.”

Longola ndeko Moskalenko, ezali na bandeko na biso mosusu koleka nsambo na Khabarovsk oyo bazali kozela mokolo oyo bakozwa ekateli mpo na bifundeli oyo bafundi bango.

Tozali kopesa Yehova matɔndi ndenge asalisaki ndeko Moskalenko abatela kondima na ye makasi ntango azalaki na bolɔkɔ. Tozali kobondela ete akoba kosunga bandeko na biso nyonso oyo bazali konyokwama mpo na kondima na bango oyo esimbami na Biblia.​—Yisaya 40:31.