Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Vladimir Alushkin elongo na mwasi na ye, Tatyana

16/09/2020
RUSSIE

Ndeko Vladimir Alushkin akozonga lisusu na bolɔkɔ te

Ndeko Vladimir Alushkin akozonga lisusu na bolɔkɔ te

Na mokolo ya 16/09/2020, tribinale ya etúká ya Penza eyebisaki ekateli na yango na likambo ya bandeko mibali oyo: Vladimir Alushkin, Vladimir Kulyasov, Andrey Magliv, mpe Denis Timoshin, ata mpe bandeko basi Tatyana Alushkina mpe Galiya Olkhova. Na esika ndeko Alushkin asala mbula motoba na bolɔkɔ, tribinale ekati ete akosala nde mbula minei ya bolɔkɔ, kasi akokɔta bolɔkɔ te mpo bakotyela mwa bipekiseli na boumeli ya bambula oyo asengelaki kosala na bolɔkɔ. Tozali na esengo mpo na yango. Nzokande, etumbu oyo bakatelaki bandeko mosusu wana mitano ebongwani te.