Lakisá makambo oyo ezali na kati

30 SANZA YA 06, 2020
RUSSIE

Prokirɛrɛ moko aboyi ete bábimisa ndeko Dennis Christensen na bolɔkɔ liboso ete dati oyo batyaki ekoka

Prokirɛrɛ moko aboyi ete bábimisa ndeko Dennis Christensen na bolɔkɔ liboso ete dati oyo batyaki ekoka

Touti koyoka ete prokirɛrɛ, Shatunov, oyo asalaka na biro ya prokirɛrɛ na etúká ya Kursk, asɛngi ete báboya kobimisa ndeko Dennis Christensen na bolɔkɔ liboso ete dati oyo batyaki ekoka. Atako baavoka na ye bakondima ekateli yango te, mbala mosusu ekosɛnga bapɔsɔ ebele eleka liboso básambisa ye. Batye ndeko Christensen na kasho ye moko na boumeli ya mikolo zomi. Atako makambo ebongwani na ndenge ya mabe, ndeko Christensen azali malamu. Topesi bino matɔndi ndenge bozali kokoba kobondela mpo na ndeko Christensen ná mwasi na ye.