Lakisá makambo oyo ezali na kati

Banda na lobɔkɔ mwasi ya tii ya mobali: Aleksey Budenchuk, Konstantin Bazhenov, Feliks Makhammadiyev, Aleksey Miretskiy, Roman Gridasov, mpe Gennadiy German, liboso bákanga bango

17/2/2020
RUSSIE

Russie: Babɛti bandeko mitano na bolɔkɔ moko na Orenbourg

Russie: Babɛti bandeko mitano na bolɔkɔ moko na Orenbourg

Na mokolo ya 06/02/2020, na engumba Orenbourg, na Russie, bakɛngɛli ya bolɔkɔ No. 1, babɛtaki bandeko na biso mitano matraki , Aleksey Budenchuk, Gennadiy German, Roman Gridasov, Feliks Makhammadiyev, mpe Aleksey Miretskiy. Ndeko Makhammadiyev akɔtaki lopitalo mpo babukaki ye mokuwa moko na mopanzi, batɔbɔlaki ye mompululu moko (poumon) mpe babebisaki ye ngei (rein) moko. Kasi nsima ya kobɛta bandeko mosusu minei  Budenchuk, German, Gridasov, ná Miretskiy, babwakaki bango na kasho na bifundeli ya lokuta. Bakosi ete, bamɛlaki likaya, nzokande Batatoli ya Yehova bamɛlaka likaya ata moke te.

Ndenge tolobaki yango liboso, na mokolo ya 19/09/2019, zuzi Dmitry Larin, na tribinale ya etúká ya Leninsky na Saratov, akweisaki bandeko yango mitano na likambo wana, elongo na ndeko Konstantin Bazhenov. Bakatelaki bango etumbu ya bolɔkɔ, bamosusu mbula mibale, bamosusu mbula misato na ndambo. Na mokolo ya 20/12/2019, tribinale ya etúká ya Saratov eboyaki kotalela lisusu likambo na bango. Nsima ya bapɔsɔ ebele, babwakaki bandeko yango nyonso na bolɔkɔ. Batindaki ndeko Bazhenov na bolɔkɔ No. 3 na etúká ya Ulyanovsk, ye abɛtamaki te ntango babɛtaki bandeko mosusu na bolɔkɔ No. 1.

Ntango kaka bandeko mitano wana bakómaki na bolɔkɔ No. 1, na mokolo ya 06/02/2020, babɛtaki bango. Minganga babwakelaki bango ata liso te tii na ntɔngɔ, na ntango oyo bamonaki ete nzoto ya ndeko Makhammadiyev ezali na mɔtɔ makasi mpe azali kosuba makila. Bakonzi ya bolɔkɔ babengaki ambulance (motuka oyo ememaka bato ya maladi) kaka nsima ya kosɛnga ndeko Makhammadiyev na makasi atya sinyatire na mokanda moko mpe aloba kaka ete “asɛlimwaki na douche mpe akweaki.” Ndeko Makhammadiyev akɔtaki lopitalo, basalaki ye lipaso mpe batyaki ye sɔndɛ mpo ebimisa mai oyo etondaki ye na poumon. Baekizamɛ ya monganga emonisaki ete ndeko Makhammadiyev azali mpe konyokwama na nzala, mpo azalaki na maladi oyo ezalaki kosɛnga bilei ya ndenge mosusu mpe bakonzi ya bolɔkɔ bazalaki koboya ete azwa bilei yango.

Tozali koyoka mawa mingi ndenge bazali konyokola bandeko na biso ya Russie na makambo ya lokuta mpe bazali komonisa bango bwale. Kasi, tozali na elikya ete, Yehova akokoba kosunga bango lokola bazali koyika mpiko na bosembo mpenza.​—Bafilipi 1:27, 28.