Lakisá makambo oyo ezali na kati

21/2/2019
RUSSIE

Russie: Banyokoli Batatoli ya Yehova makasi na Sourgout

Russie: Banyokoli Batatoli ya Yehova makasi na Sourgout

Kaka mikolo libwa nsima ya kokatela Dennis Christensen etumbu kaka mpamba na tribinale moko ya Russie, batɛtaki Batatoli ya Yehova nsambo mabe (batyaki bango kura na nzoto, batyaki bango na esika ya nkaka, kobɛta bango) na bapolisi ya engumba Sourgout oyo basalaka baankɛtɛ, na Sibérie occidentale. Bapolisi yango banyokolaki bandeko na biso makasi ndenge wana mpo báloba bisika oyo makita esalemaka mpe bápesa bankombo ya Batatoli ya Yehova mosusu.

Likambo yango ebandaki na ntɔngɔ mpenza ya mokolo ya 15/02/2019 ntango bapolisi bakɔtelaki bango na bandako. Bakonzi ya engumba Sourgout bakangaki Batatoli ya Yehova mpe bamemaki bango na babiro ya komite ya baankɛtɛ, bakonzi yango bakómaki kotunatuna bango mituna kasi bandeko yango baboyaki koyebisa bango makambo etali bandeko na biso mosusu. Bandeko yango balobi ete ntango kaka avoka moko alongwaki wana, bapolisi batyaki bango saki moko na motó, bakangaki yango na ruban adhésif, bakangaki bango mabɔkɔ na mokɔngɔ mpe babɛtaki bango. Nsima ya kolongola bango bilamba mpe kosopela bango mai, bapolisi batyaki bango kura na nzoto na eloko babengi taser. Basalaki bango ndenge wana na boumeli ya ngonga soki mibale mobimba.

Tii sikoyo Batatoli ya Yehova yango soki misato bazali kaka na bolɔkɔ. Baoyo batikaki bango bákende bazwaki lisalisi ya monganga mpo na bampota oyo bazokisaki bango. Bafundaki likambo yango na inspection générale.

Longola yango, nsima ya kokɔtela bandeko na bandako, bakonzi ya Russie balandelaki Batatoli ya Yehova 19 mpo balobaki ete “basanganaki na makambo oyo elekisaka ndelo” mpe mpo “bapesaki mabɔkɔ na ebongiseli moko oyo makambo na yango elekisaka ndelo.”

Na kotalela mobeko moko ya Russie, kosalela bokonzi na ndenge ya mabe bongo ebongi na etumbu. Lisusu, Russie elandaka mibeko ya bibongiseli ya miliki ndenge na ndenge oyo ebatelaka bato na minyoko ya bongo. Na yango, tokomema likambo yango na batribinale; ezala na batribinale ya Russie to ya mikili ndenge na ndenge.

Toyebi ete Yehova azali komona ndenge bazali konyokola bandeko na biso na Russie mpe akozala ‘mosalisi mpe Mobikisi’ mpo na bango.​—Nzembo 70:5.