Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bapolisi ya etúká mpe bapolisi ya service de sécurité fédéral (FSB) bazali kokɔta na ndako ya ndeko moko na Nizhny Novgorod na 2019

15 SANZA YA 07, 2020
RUSSIE

Russie: Bapolisi bakɔti na bandako ya bandeko na biso na ndenge ya nsɔmɔ

Russie: Bapolisi bakɔti na bandako ya bandeko na biso na ndenge ya nsɔmɔ

Na liyebisi moko oyo bapanzi-nsango bapesaki na mokolo ya 13/07/2020, bapolisi bakɔtaki na bandako ya bandeko 110, basimbaki mindoki, na etúká ya Voronezh. Banda na 2017, ezali mbala ya liboso bapolisi bákɔta na bandako ya Batatoli ya Yehova ebele boye na mokolo moko. Babɛtaki bandeko mibali mibale, Aleksandr Bokov ná Dmitrii Katyrov, mpe basambwisaki bango na miso ya bato, mpo baboyaki kopesa bango kode ya batelefone na bango.

Tribinale ya etúká ya Leninsky na Voronezh nde epesaki mitindo bákɔtela bandeko ebele bongo. Bapolisi bakɔtaki na bandako ya bandeko na bamboka mpe bingumba koleka nsambo na etúká yango. Bakendeki na bandeko ebele na babiro ya komite ya ankɛtɛ mpo na kotuna bango makambo.

Na mokolo oyo elandi, mokolo ya 14/07/2020, tribinale ya etáká ya Leninsky epesaki mitindo ete bátya bandeko zomi na bolɔkɔ tii mokolo ya 03/09/2020: ndeko Aleksei Antiukhin azali na mbula 44, Sergey Bayev mbula 47, Iurii Galka mbula 44, Valeriy Gurskiy mbula 56, Vitalii Nerush mbula 41, Stepan Pankratov mbula 21, Igor Popov mbula 54, Evgenii Sokolov azali na mbula 44, Mikhail Veselov mbula 51, mpe Anatoliy Yagupov azali na mbula 51.

Atako bapanzi-nsango balobaki ete bapolisi bakɔtaki na bandako ya bandeko 110, kasi tii sikoyo, toyoki epai ya bandeko ete bapolisi bakɔtaki kolukaluka biloko kaka na bandako mpe na mapango ya mabota ya Batatoli ya Yehova 100. Ntango mosusu motángo ekoki kobakisama. Ezali mpasi kosolola na bandeko oyo bakɔtelaki bango mpo babɔtɔlá bango batelefone ná baordinatɛrɛ na bango ntango bakɔtelaki bango.

Mbala ya nsuka oyo bapolisi bakɔtelaki bandeko ebele mbala moko mpo na kolukaluka biloko na bandako na bango ezalaki na mokolo ya 10/02/2020, ntango bakɔtaki na bandako ya Batatoli 50 na teritware ya Transbaikal. Banda na 2017, tribinale monene ya Russie epesaki mitindo ete bapolisi bákɔta na bandako ya bandeko na biso koleka 1 000.

Na kotalela esakweli ya Biblia, tozali kokamwa te mpo na komekama makasi oyo bandeko na biso na Russie mpe na bamboka mosusu bazali kokutana na yango. Tozali kokoba kosambela mpo na bandeko na biso, mpo toyebi ete Yehova akopesa bango elimo santu oyo basengeli na yango mpo bátikala sembo.​—1 Petro 4:12-14, 19.