Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Sergey Rayman ná mwasi na ye, Valeriya, bazali na tribinale na mokolo ya 09/10/2020

09 SANZA YA 10, 2020
RUSSIE

Russie: Mobali moko ná mwasi na ye bakoki kokɔta bolɔkɔ

Russie: Mobali moko ná mwasi na ye bakoki kokɔta bolɔkɔ

Na mokolo ya 09/10/2020, tribinale ya etúká ya Sverdlovski na engumba Kostroma bakweisaki ndeko Sergey Rayman ná mwasi na ye, Valeriya na likambo. Ndeko Sergey akoki kosala mbula 8 mpe mwasi na ye mbula 7 na bolɔkɔ. Ezali etumbu ya bolɔkɔ oyo eleki molai oyo bakateli bandeko na biso na Russie kobanda 2017 na tribinale monene. Ata bongo, ndeko Sergey Rayman ná mwasi na ye bakokɔta naino na bolɔkɔ te sikoyo.