Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Anatoliy Tokarev ná mwana na ye ya mobali, Andrey, mwasi na ye, Margarita, ná mwana na bango ya mwasi, Yekaterina

08/10/2020
RUSSIE

Russie: Ndeko Anatoliy Tokarev akoki kokɔta bolɔkɔ mbula misato na ndambo

Russie: Ndeko Anatoliy Tokarev akoki kokɔta bolɔkɔ mbula misato na ndambo

Ntango ya kokata likambo

Na mokolo ya 23/10/2020, * Oktyabrsky District Court of Kirov, na Kirov ekokata likambo ya ndeko Anatoliy Tokarev. Ntango mosusu, akoki kokɔta bolɔkɔ mbula misato na ndambo.

Makambo na ye

Anatoliy Tokarev

  • Abotami na: 1958 (Baranovskaya, na etúká ya Kirov)

  • Bomoi na ye: Abɔkwamaki na mama ye. Azalaki ingénieur informaticien liboso azwa pansiɔ na mosala. Alingaka kokanga bafɔtɔ, kobɛta lisano ya échec, mpe nzɛnzɛ. Abalaki Magarita na 1979. Bazali na bana mibale

  • Nsima ya koyekola makambo ya siansi, azalaki kondima lisusu te ete Nzambe azali. Ntango akómi na mbula 27, abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, amonaki ete makambo oyo bakristo bateyaka eyokani na oyo siansi elobi

Ndenge likambo ebandaki

Na mokolo ya 24/05/2019, bapolisi bautaki na Biro ya Russie oyo elukaka bato mabe, bakɔtaki na ndako ya libota ndeko Tokarev. Bapolisi baponaki ndeko Tokarev. Babandaki kobangisa libota ya ndeko Tokarev ete bakokanga ye soki andimi te ete asalaka makambo ya mabe. Na nsima, bakendaki na ndeko Tokarev na biro mpo na kotuna ye mituna kilikili.

Nsima ya sanza soki mitano, bafundaki ndeko Tokarev ete abuki artikle mibale ya Code pénal ya Russie. Bafundi ye ete azali kopesa ebongiseli ya bato mabe mbongo. Basalelaki bakamera mpo na koyoka masolo na ndako ya libota ya ndeko Tokarev mpo na koloba ete Anatoliy azali kosala makita mpo na koyekola mikanda ya bato mabe oyo bapekisá.

Tozali kobondela mpo na ndeko Tokarev ná libota na ye. Tozali na elikya ete Yehova akokoba ‘kozala sembo’ epai na bango.​—Nzembo 18:25.

^ par. 3 Bakoki kobongola dati oyo