Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Yevgeniy Spirin, na esika oyo bakosambisa ye

09 SANZA YA 07, 2020
RUSSIE

Russie: Ndeko Yevgeniy Spirin akoki kokota boloko mbula nsambo

Russie: Ndeko Yevgeniy Spirin akoki kokota boloko mbula nsambo

Tribinale ya Furmanovsky, na etúká ya Ivanovo, ekanaki koyebisa ekateli oyo ezwaki na likambo etali ndeko Yevgeniy Spirin na mokolo ya 14/07/2020. Prokirɛrɛ asɛngi ete bákatela ndeko Spirin etumbu ya mbula nsambo ya bolɔkɔ.

Bafundaki ndeko Spirin, oyo azali na mbula 34, ete azali kosala makambo ya ebongiseli oyo guvɛrnema ya Russie etalelaka yango ete ezali ebongiseli ya bato mabe to “extrémiste.” Likambo yango ebandaki na mokolo ya 21/01/2019, na ankɛti moko oyo bato ya Service fédéral de sécurité (FSB) basalaki. Nsima ya mikolo motoba, bato ya sireté bayaki kolukaluka biloko na ndako ya ndeko Spirin ná mwasi na ye, Natalya. Tribinale ya Oktyabrsky, na etúká ya Ivanovo, esɛngaki ete bátya ndeko Spirin na bolɔkɔ sanza mibale, kaka mpo azali Motatoli ya Yehova. Na nsima, babakisaki basanza mosusu.

Nsima ya kolekisa sanza mitano ná pɔsɔ moko na ndambo na bolɔkɔ, babimisaki ye na mokolo ya 05/07/2019; bazongisaki ye na ndako na ye mpe bapekisaki ye kobima. Na mokolo ya 18/12/2019, tribinale ya Oktyabrsky, na etúká ya Ivanovo, epesaki mitindo ete bátika ndeko Spirin abimaka, atako bato oyo basalaki ankɛti bandimaki te. Babakiselaki ye bipekiseli mosusu te.

Tozali kobondela Yehova, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo, mpe tozali kotyela ye motema mobimba ete akokoba kozala elongo na bandeko na biso nyonso ya Russie oyo bazali konyokwama mpo na kondima na bango.​—1 Petro 4:14.