Lakisá makambo oyo ezali na kati

01/7/2020
RUSSIE

Russie: Prokirɛrɛ aboyi bábimisa ndeko Christensen liboso ya dati oyo bakatelaki ye

Russie: Prokirɛrɛ aboyi bábimisa ndeko Christensen liboso ya dati oyo bakatelaki ye

Na mokolo ya 26/06/2020, bakonzi ya bolɔkɔ ya Lgov batyaki ndeko Dennis Christensen na kasho ya mabe mpenza, oyo batyaka bato mabe, mpo na makambo ya lokuta. Lokola abɛlaki makasi, batindaki ye kuna na nko mpo alɛmba awangana kondima na ye. Ntango mosusu, biro ya prokirɛrɛ ezali koluka makambo mosusu ya kokosela ndeko Christensen mpo abima te liboso ya dati oyo bakatelaki ye, nzokande biro ya prokirɛrɛ yango endimaki ete ndeko abima liboso ya mikolo oyo bakatelaki ye.

Bakatelaki ndeko Christensen etumbu ya bolɔkɔ mbula 6, asali na bolɔkɔ mbula koleka misato. Eleki sikoyo mbula moko, banda azali na likoki ya kosɛnga ete afuta amande abima to bákitisa mbula na ye ya bolɔkɔ. Asɛngaki mbala misato mobimba, baboyaki, nsukansuka na mbala ya minei, kosɛnga na ye ekómaki na tribinale. Na mokolo ya 23/06/2020, tribinale ya etúká ya Lgov endimaki ete, mpo na mikolo oyo etikali, afuta amande. Prokirɛrɛ oyo asengelaki kosambisa na mokolo yango, M. Artem Kofanov, andimaki likanisi ya kokitisa mikolo ya bolɔkɔ.

Nsima ya mikolo mibale, prokirɛrɛ mosusu, Zuzi Aleksei Shatunov, alobi ete basambisaki mabe, asɛngi báboya ekateli wana, asɛngaki básambisa likambo yango lisusu kaka na tribinale wana kasi na zuzi mosusu. Zuzi Shatunov azwi ekateli na ye na kolanda makambo oyo bakonzi ya bolɔkɔ ya Lgov balobaki ete, bamonaki ete ndeko Christensen azalaki “kolinga mosala te mpe azalaki na etamboli ya malamu te.”

Ntango ndeko Christensen azali kosamba na mokolo ya 23/06/2020, bakonzi ya bolɔkɔ bamekaki koloba makambo ya ndenge wana, kasi zuzi amonisaki ete makambo wana ezali makambo ya lokuta. Avoka na ye amonisaki ete lapolo ya monganga endimisi ete, na kotalela bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya ndeko Christensen, bapekisaki ye kosala misala wana na bolɔkɔ. Lisusu, ntango avoka na ye amonisaki ete momonisi ya bolɔkɔ alobaki ete na kotalela sante ya ndeko Christensen, ezali na mosala moko te oyo akoki kosala.

Ntango biro ya prokirɛrɛ ebandi koboya ete ndeko Christensen abima liboso ya dati oyo bakatelaki ye, bakonzi ya bolɔkɔ bakomaki makambo mpo na kokweisa ndeko Christensen. Likambo ya liboso ezalaki ete akendeki na esika ya kolya na ngonga ya mabe, mpe ya mibale ezalaki ete azalaki kotambola na kati ya bolɔkɔ na triko na esika alata elamba ya bato ya bolɔkɔ. Mpo na makambo wana, bakonzi ya bolɔkɔ batyaki ndeko Christensen na kasho moko ya mabe mpenza mpo na mikolo zomi. Na kotalela mobeko ya Russie, bakonzi ya bolɔkɔ bakoki kosala bongo kaka soki mokangami azongeli likambo wana mbala na mbala, atako bongo, bakoki kosala yango kaka soki monganga asali mokangami baekizamɛ. Lokola ndeko Christensen asalaki mabe moko ya ndenge wana te, lokola mpe monganga asalaki ye baekizamɛ te, bazalaki na lotomo moko te ya kotya ye na kasho wana mabe te.

Ndeko Christensen ná bakangami mosusu bazalaki na kati ya mwa kasho ya moke mpenza. Mopɛpɛ ezalaki kokɔta na kasho yango te, mpe ezalaki na mbɔngi, yango ebebisaki lisusu mpenza sante ya ndeko Christensen. Autaki kobɛla maladi ya mpema mwa basanza euti koleka, mpe monganga amonaki ete mokuwa na ye ya mokɔngɔ ezali mpenza na mafuta te. Avoka ya ndeko Christensen alobaki ete “bakonzi ya bolɔkɔ bayebi likambo yango malamu, kasi batyaki ye kaka na esika oyo asengeli kolala na mbeto ya makasi mpenza, mpe yango enyokolaki ye mingi.”

Ndeko Christensen ayebisaki avoka na ye ete, ntango balobi ete abukaki mobeko wana, azalaki elongo na bato mosusu, kasi batyaki ye na kasho wana mabe mpenza kaka ye moko. Avoka ya ndeko Christensen alobaki boye: “Yango ezali kotinda biso tókanisa ete nyonso wana ezali myango oyo basalaki liboso mpo tribinale ebimisa Dennis na bolɔkɔ te.”

Ata soki bakonzi ya Russie bazali kaka kokoba kosalela mayele mabe na ndenge nyonso mpo na konyokola bandeko na biso na Russie, tozali na kondima ete Yehova akozala ekimelo na bango. Tiká ete tókoba kobondela Yehova apesa ndeko Christensen ná mwasi na ye, Irina, nyonso oyo basengeli na yango mpo bátikala sembo na ntango oyo ya komekama makasi.​—Nzembo 94:13, 21, 22.