Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Konstantin Bazhenov

28 SANZA YA 10, 2020
RUSSIE

Russie: Tribinale eboyi bábimisa ndeko Bazhenov na bolɔkɔ liboso ya bambula oyo bakatelaki ye

Russie: Tribinale eboyi bábimisa ndeko Bazhenov na bolɔkɔ liboso ya bambula oyo bakatelaki ye

Na mokolo ya 28/10/2020, tribinale ya engumba Dimitrovgrad na etúká ya Oulianovsk eboyaki kobimisa ndeko Konstantin Bazhenov na bolɔkɔ liboso ya bambula oyo bakatelaki ye. Lisusu tribinale eboyaki afuta lomande mpo na bambula ya bolɔkɔ oyo atikalaki na yango. Azali na mikolo 10 mpo na kosɛnga bátalela lisusu likambo na ye.

Ntango akendaki mpo na mbala ya liboso na bolɔkɔ mpo na mwa ntango na sanza ya 06/2018, ndeko Bazhenov abangaki mpenza. Kasi, abandaki kokoma bavɛrsɛ ya Biblia na mwa karnɛ. Akomaki bavɛrsɛ soki 500 oyo ayebaki na motó. Nsukansuka, azwaki Biblia moko mpe atángaki yango na boumeli ya sanza 4 mobimba. Ndeko Bazhenov akomaki makanisi ya Biblia na mikanda mpo na kolendisa basusu. Azalaki mpe koyemba banzembo ya Bokonzi mpe ntango nyonso azalaki kobondela Yehova mpo asalisa ye.

Ndeko Bazhenov alekisaki mikolo koleka 340 na bolɔkɔ. Atako bakatelaki ye mbula misato na ndambo ya bolɔkɔ na sanza ya 09/2019, azali kokoba na momeseno na ye ya elimo. Na lisalisi ya Yehova, ndeko Bazhenov alandaki Ekaniseli atako azalaki na bolɔkɔ. Lokola atikalaki pene ya Yehova, ndeko Bazhenov azalaki na likoki ya koyikela monyoko mpiko na esengo. Tiká ete tókoba kobondela Yehova mpo asalisa ndeko Bazhenov.