Lakisá makambo oyo ezali na kati

20/3/2019
RUSSIE

Russie: Tribinale ya Russie ebimisi moko ya Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ na engumba Sourgout

Russie: Tribinale ya Russie ebimisi moko ya Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ na engumba Sourgout

Na mokolo ya 07/03/2019, Cour d’appel ya Khanty-Mansiysk, na Russie, elongolaki ekateli oyo tribinale ya engumba Sourgout ezwaki ya kotya ndeko Artur Severinchik na bolɔkɔ. Na nsima, babimisaki ye na bolɔkɔ na mokolo ya 15/03/2019.

Ndeko Severinchik azali moko ya Batatoli ya Yehova misato oyo batyaki na bolɔkɔ na mokolo ya 17/02/2019, ntango bakɔtelaki bango na bandako na engumba Sourgout mpe na Lyantor. Tribinale yango eboyaki kobimisa bandeko mibale mosusu, Yevgeniy Fedin mpe Sergey Loginov.

Likambo yango ebendaki likebi ya bato ya mikili ndenge na ndenge. Tribinale monene ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto (CEDH) esɛngaki bápesa ndeko Loginov lisalisi ya monganga mpo babɛtaki ye ntango azalaki na bolɔkɔ.

Tozali na botɔndi ndenge babimisi ndeko Severinchik na bolɔkɔ. Tozali kokoba kobondela ete bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ na Russie bátyela Yehova motema, mpe bábosana te ete na lisalisi na ye “bakotengatenga te.”​—Nzembo 16:8.