Lakisá makambo oyo ezali na kati

23/9/2020
RUSSIE

Russie: bakateli ndeko Yuriy Zalipayev etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ

Russie: bakateli ndeko Yuriy Zalipayev etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ

Mokolo ya kokata likambo

Na mokolo ya 07/10/ 2020, * tribinale ya etúká Mayskiy, na République kabardino-balkarienne ekataki likambo ya ndeko Yuriy Zalipayev. Akosala mbula mibali na bɔlɔkɔ.

Makambo etali moto

Yuriy Zalipayev

  • Abotamá na: 1962 (Engumba ya Samara)

  • Makambo etali bomoi na ye: Azalaki kosala mosala ya kobamba mabende mpe motambwisi-mituka minene. Alingaka koyema mpe kotambolatambola

  • Na 1983, abalanaki na Natalia oyo azalaki moninga na ye ya kelasi. Mbula zomi na nsima, babandaki koyekola Biblia elongo. Bazali na bana misato. Bango nyonso bazali kosalela Yehova elongo na bandeko na bango mosusu ya libota

Makambo ya tribinale

Na mokolo ya 20/08/2016, bapolisi bakɔtaki na makasi na Ndako ya Bokonzi na engumba Mayskiy mpe batyaki mikanda oyo bapekisaki mpe balobaki ete ezali ya “bato oyo balekisaka ndelo.” Atako bongo, bandeko bazali na video oyo emonisi ndenge bapolisi bazalaki kotya mikanda na Ndako ya Bokonzi, kasi tribinale elobaki bandeko babuki mibeko mpe basengeli kofuta lomande ya dolare 2 634. Mwa basanza na nsima, tribinale efundaki ndeko Zalipayev ete azali moto ya mobulu.

Bafundaki ndeko Zalipayev ete azali kokabola mikanda oyo epekisami mpe kolendisa Batatoli ya Yehova mosusu ete básala bato ya mangomba mosusu mabe. Likambo epekisami na mibeko ya mboka mpe babengaka yango “kosangisa bato mpo na kosala misala mabe” (Eteni 1 ya Artikle 280 ya mibeko ya Russie na likambo etali kosala mobulu).

Na mokolo ya 21/06/2020, tribinale eyokaki bifundeli nyonso wana. Ntango bazalaki kosambisa, ntango zuzi asɛngaki bato oyo bayaki kofunda báloba, bazalaki koloba maloba moko te bango nyonso, yango emonisaki ete bifundeli na bango ezalaki ya solo te. Na ndakisa, ntango bazalaki kosambisa eyaki komonana ete mwa ndambo ya bato oyo bafundaki ndeko Zalipayev ete azali kotinda bato na mobulu bazalaki te na esika oyo lisambisi yango esalemaki. Longola yango, bato mosusu oyo bazalai bantemwe ya likambo yango balobaki ete mikanda oyo bapekisaki oyo bamonaki na Ndako ya Bokonzi ezalaki bakonzi ya leta nde batyaki yango.

Lokola ndeko Zalipayev azali kozela bákata likambo na ye, tozali kobondela mpo ete ye ná libota na ye bázwa makasi mpe kimya na moloba oyo ya Davidi: “Yehova azali makasi na ngai mpe nguba na ngai.

Motema na ngai etyeli ye elikya, Mpe nasalisami, bongo motema na ngai ezali kosepela.”​—Nzembo 28:7.

^ par. 3 Likambo ekoki kobongwana