Lakisá makambo oyo ezali na kati

Na lobɔkɔ ya mobali: Ndeko Roman Markin ná ndeko Viktor Trofimov, liboso ete bakanga bango

17/01/2020
RUSSIE

Tribinale ekoki kokatela ndeko Markin ná ndeko Trofimov mbula motoba na ndambo ya bolɔkɔ

Tribinale ekoki kokatela ndeko Markin ná ndeko Trofimov mbula motoba na ndambo ya bolɔkɔ

Na mokolo ya 22/01/2020, zuzi asengelaki koloba mpo na likambo ya ndeko Roman Markin na ndeko Viktor Trofimov. Prokirɛrɛ yango esɛngaki ete tribinale ekatela bango mbula motoba na ndambo ya bolɔkɔ.

Mikakatano ya bandeko ebandaki na mokolo ya 18/04/2018, ntango basoda oyo balataki maskɛ na bilongi bakɔtaki na makasi na bandako na bango na engumba ya Polyarny, na Russie. Bapolisi bayaki na butu makasi na ndako ya ndeko Markin mpe babukaki porte na ye. Babangisaki ndeko Markin mpo bazalaki na mindoki, basoda balalisaki ye na nse mpe babandaki kolukaluka na ndako. Mwana mwasi ya ndeko Markin oyo azali na mbula 16 azalaki mpe wana ntango basoda bazalaki kopanza ndako mpo na kolukaluka, alalaki na nse mpe azipaki motó na ye na mabɔkɔ.

Longola yango, kaka na engumba Polyarny na butu wana, bapanzaki bandako ya bandeko minei mpo na kosala bolukiluki. Basoda bakangaki bandeko mingi elongo na ndeko Markin mpe ndeko Trofimov mpe bamemaki bango na biro ya polisi mpo na kotunatuna bango mituna. Likambo ya mawa, tribinale ya Polyarny, na engumba Murmansk, emonaki malamu kotya ndeko Markin ná ndeko Trofimov na kasho. Bandeko balekisaki basanza pena na 6 na kasho, mpe sanza 2 lokola bakangami. Na mokolo ya 07/02/2020, tribinale ebimisaki bango. Tribinale epekisi bango bábima na bandako na bango, bakoki mpe kosala mibembo te mpe epekisi bango kosolola na bato tii mokolo bakokata likambo na bango.

Bazali kokosela Batatoli ya Yehova soki 300 na Russie ete bazali kosala makambo ezangá bosembo. Tozali kosambela mpo na bandeko na biso nyonso ete bázala makasi mpe na mpiko, mpe tozali na kondima ete eloko moko te ekoki kokabola bango na bolingo ya Yehova.​—Baroma 8:38, 39.