Lakisá makambo oyo ezali na kati

BNdeko Akopyan ná mwasi na ye (na katikati) mpe bandeko mosusu oyo bayei kopesa ye mabɔkɔ na tribinale.

6/3/2019
RUSSIE

Tribinale elongoli ekateli ya liboso oyo bazwaki mpo na ndeko Akopyan na Russie

Tribinale elongoli ekateli ya liboso oyo bazwaki mpo na ndeko Akopyan na Russie

Na mokolo ya 01/03/2019, Tribinale monene ya République de Kabardino-Balkarie elongolaki ekateli oyo tribinale ya moke ezwaki, oyo ekweisaki ndeko Arkadya Akopyan na likambo mpo ekateli yango ezalaki sembo te. Asalaki mbula mobimba na bolɔkɔ, bakoselaki ye makambo mpe balobaki ete azali kokabola mikanda oyo makambo na yango “elekisaka ndelo” mpe azali ‘kotinda bato báyina mangomba mosusu.’

Liboso, tribinale yango ya moke ekatelaki ndeko Akopyan oyo azali na mbula 70 etumbu ya kosala misala mosusu ya Leta oyo ezangá lifuti. Kasi Tribinale monene ekweisaki ekateli yango.

Tozali kopesa Yehova matɔndi ndenge balongisi ndeko Akopyan mpe tozali kosepela elongo na ye. Tozali kokoba kobondela ete bandeko na biso báyika mpiko na bosembo nyonso.​—2 Batesaloniki 1:4.