Lakisá makambo oyo ezali na kati

Banda na lobɔkɔ ya mwasi tii ya mobali: ndeko Nikolay Polevodov ná ndeko Stanislav Kim na lopango ya tribinale na sanza ya 10/2019

31/01/2020
RUSSIE

Tribinale mibale ya Russie ezali kolandela ndeko Stanislav Kim mpe ndeko Nikolay Polevodov, mpe ekateli ya liboso ekozwama na mokolo ya 04/02/2020

Tribinale mibale ya Russie ezali kolandela ndeko Stanislav Kim mpe ndeko Nikolay Polevodov, mpe ekateli ya liboso ekozwama na mokolo ya 04/02/2020

Na mokolo ya 04/02/2020, tribinale ya etúká Jeleznodorojnyin na engumba ya Khabarovsk ezali kokana koyebisa ekateli oyo ezwi na likambo ya ndeko Stanislav Kim mpe ndeko Nikolay Polevodov. Prokirɛrɛ asɛngaki ete bákatela bango mibale etumbu ya mbula misato ya bolɔkɔ na kaa oyo basalisaka bato mosala na makasi. Longola oyo wana, bandeko bafundami lisusu na likambo ya mibale na tribinale mosusu ya engumba yango.

Bakangaki na bolɔkɔ ndeko Kim mpe ndeko Polevodov na mokolo ya 10/11/2018. Na mokolo yango, bandeko basi mpe mibali koleka 50 na Khabarovsk bakendaki kozwa mopɛpɛ mpe kominanola. Ezalaki likita ya losambo te. Eumelaki te mwa moke na nsima, bakonzi ya bapolisi mpe basangani ya komite ya ankɛtɛ bayaki wana mpe bakangaki baoyo bazalaki wana. Batyaki ndeko Kim ná ndeko Polevodov, elongo na ndeko Vitaliy Zhuk na bolɔkɔ mpo na mwa ntango na boumeli ya sanza koleka mibale mpe basoda bazalaki kokɛngɛla ndako na bango na boumeli ya basanza mingi.

Ekateli oyo ekozwama na mokolo ya 04/02/2020 ezali mpo na kokweisa na likambo ndeko Kim mpe Polevodov, mpo bazalaki na kati ya bato oyo bazalaki na esika ya kozwa mopɛpɛ. Kasi, bakonzi babandaki mpe kolandela ndeko Kim, ndeko Polevodov, mpe ndeko Zhuk, ezala mpe bandeko basi misato oyo bazalaki na esika yango. Na likambo yango, bakweisaki na likambo ndeko Kim mpe Polevodov, balobaki ete bango nde babongisaki bokutani wana. Mokolo etyami naino te mpo na kokata likambo yango.

Ndeko Kim ná ndeko Polevodov bazali kolekisa ntango moko mabe mpenza mpo bazali kolandela bango na batribinale mibale ekeseni na mbala moko. Bato oyo bazali kosala ankɛtɛ baboyi kosangisa makambo yango mpo bálandela yango, yango wana ndeko Kim ná ndeko Polevodov basɛngisami kokende na batribinale nyonso wana oyo ezali na bisika mibale ekeseni na Khabarovsk.

Bandeko mibale wana bazali na basi mpe batiki bana na ndako. Toyebi ete Yehova akokoba kopesa bandeko na biso wana oyo tolingaka mingi mpe mabota na bango elimo santu na ye mpo na kobatela mitema mpe makoki na bango ya kokanisa, mpo esalisa bango bátikala sembo na komekama.​—Bafilipi 4:7.