Lakisá makambo oyo ezali na kati

19/2/2019
RUSSIE

Tribinale moko ya Russie ekweisi Dennis Christensen na likambo mpe ekateli ye etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ kaka mpamba

Tribinale moko ya Russie ekweisi Dennis Christensen na likambo mpe ekateli ye etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ kaka mpamba

Ndenge tolobaki yango na nsango oyo topesaki mokolo ya 06/02/2019, tribinale ya etúká ya Jeleznodorojny, na Orel ekatelaki Dennis Christensen etumbu ya mbula motoba ya bolɔkɔ mpo asalaki makambo na ye ya losambo. Ndeko Christensen asɛngaki tribinale monene etalela lisusu ekateli yango.

Nsango ya etumbu ya mbula motoba oyo bakatelaki Christensen esalaki ete mikili ndenge na ndenge elobela likambo yango. Conseil de l’Europe, Union européenne, Commission américaine sur la liberté religieuse dans le monde, Haut-Commissariat des Nations Unies aux droits de l’homme mpe bibongiseli mosusu ya bato emonisaki ete bakatelaki Dennis etumbu yango kaka mpamba.

Michelle Bachelet, Haut-Commissaire ya ONU na makambo etali ntomo ya moto, alobaki boye na liyebisi oyo apesaki: “Etumbu mabe oyo bakateli Christensen ekotya Batatoli ya Yehova mosusu ya Russie na likama mpo na ntomo na bango ya bonsomi ya losambo mpe ya mateya.” Asɛngaki guvɛrnema ya Russie “ebongisa lisusu mobeko na yango oyo etali kobundisa makambo oyo elekisaka ndelo” mpo ndimbola ya “makambo oyo elekisaka ndelo” eyebana polele mpo mobeko yango esalelama mpo na makambo ya mobulu to ya koyina.” Mpo na kosukisa, asɛngaki bakonzi ya Russie “bátika bifundeli na bango mpe bábimisa na bolɔkɔ baoyo nyonso bakangamaki mpo basalelaki bonsomi ya losambo, ya mateya, ya kopesa likanisi, ya koloba mpe ya koyangana na kimya nyonso.”

Mikolo mibale nsima ya kokatela ndeko Christensen etumbu, bato minei ya mayele oyo batalelaka ntomo ya moto na Russie basalaki likita moko na Moscou. Bato ebele bayaki na likita yango, mpe bato koleka 6 000 balandaki yango na Internet; eumelaki ngonga mobimba. Bango nyonso minei bamonisaki ete Batatoli ya Yehova bazali bato ya kimya mpe bazali likama te mpo na ekólo.

Likita elongo na bapanzi-nsango na Moscou, na mokolo ya 08/02/2019.

Irina, mwasi ya ndeko Christensen mpe avoka na ye Anton Bogdanov mpe Yaroslav Sivulskiy, momonisi ya Association européenne des Témoins de Jéhovah, bazalaki mpe na likita yango. Balobelaki ndenge bakatelaki Christensen etumbu na bosembo te mpe bayanolaki na mituna ya bapanzi-nsango.

Atako elingi ekokisa mbula mibale banda bakangá ndeko Christensen, azali kaka kobatela esengo na ye mpe ekateli na ye ya kotyela Yehova motema. Mwa mikolo liboso tribinale elobela etumbu oyo bakatelaki ye, ndeko Christensen alobaki mpo na mbala ya nsuka na tribinale, maloba oyo: “Ata ndɛlɛ, solo eyebanaka kaka mpe ekozala bongo mpo na likambo oyo.” Nsima ya kotánga Emoniseli 21:3-5, asukisaki na kondima nyonso na maloba oyo: “Maloba oyo . . . elobeli ntango oyo Nzambe akosala ete bosembo esalema mpe bato bázala na bonsomi ya solosolo. Bonsomi mpe bosembo etambolaka nzela moko. Nzambe akosala ete nyonso wana ekokisama.”

Ndeko Christensen asengeli kozela ekateli ya Cour d’appel na kasho No. 1 na Orel, epai asali mbula moko na sanza mwambe na bolɔkɔ.

Tokokoba kobondela Yehova akoba kosalisa ndeko Dennis Christensen, mwasi na ye mpe bandeko na biso nyonso ya Russie.​—1 Petro 3:12.

Média international RFE/RL ebimisaki video moko (Russian Trial Called ‘A Litmus Test For Religious Freedom) mwa mikolo liboso tribinale elobela etumbu oyo ekatelaki ndeko Christensen.