Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Sergey Rayman ná mwasi na ye, Valeriya

7/09/2020
RUSSIE

Tribinale moko ya Russie elingi ekatela ndeko mwasi moko ná mobali na ye etumbu ya makasi mpenza

Tribinale moko ya Russie elingi ekatela ndeko mwasi moko ná mobali na ye etumbu ya makasi mpenza

Ntango ya kokata likambo

Na mokolo ya 16/09/2020, * tribinale ya etúká ya Sverdlovskiy oyo ezali na engumba Kostroma ekoyebisa ekateli na yango na likambo etali ndeko Sergey Rayman ná mwasi na ye Valeriya. Tribinale yango ekoki kokatela bango etumbu ya mbula nsambo ya bolɔkɔ.

Makambo na bango

Sergey Rayman

  • Abotami na: 1996 (Kineshma, na etúká ya Ivanovo)

  • Bomoi na ye: Ayekolaki kotonga bandako na eteyelo ya tekiniki. Ayebi kobongisa ndako na kati malamu mpenza. Nkɔkɔ na ye ya mwasi nde ateyaki ye kolinga Biblia mpe komemya yango. Abalaki Valeriya na 2015. Alingaka kolamba mpe kosala lisano ya skii

Valeriya Rayman

  • Abotami na: 1993 (Sharya, na etúká ya Kostroma)

  • Bomoi na ye: Ntango Valeriya azalaki na mbula zomi, tata na ye akufaki. Mama na ye nde ateyaki ye makambo ya Yehova. Atángaki kelasi ya kosala mpe kokata nsuki

Ndenge makambo ebandaki

Na ntɔngɔ ya mokolo ya 25/07/2018, bapolisi babukaki baporte ya ndako ya ndeko Rayman ná mwasi na ye mpe bakɔteli bango. Bapolisi yango bakangaki bango. Mwasi ya ndeko Rayman asalaki mikolo mibale na bolɔkɔ. Ndeko Rayman asalaki mikolo 59 na kasho ye moko. Bakonzi bapekisá bango kosolola na Batatoli ya Yehova mosusu. Lisusu, bapekisá bango mpe kokende kotambola na mpokwa. Minyoko wana etungisá bango mingi mpe ebebisá sante na bango.

Babalani yango ya sika bazali kozela ekateli ya tribinale, tozali kobondela ete bákoba kozala na mpiko mpe na makasi, mpe bátya elikya ete Yehova akotika kosunga bango ata moke te.​—Yosua 1:9.

^ par. 3 Dati ekoki kobongwana