Lakisá makambo oyo ezali na kati

25 SANZA YA 09, 2020
RUSSIE

Tribinale moko ya Russie elobi ete ndeko Konstantin Bazhenov ná mwasi na ye, mpe ndeko mwasi mosusu ya mbula 73 bakoki kosala mbula mibale na bolɔkɔ

Tribinale moko ya Russie elobi ete ndeko Konstantin Bazhenov ná mwasi na ye, mpe ndeko mwasi mosusu ya mbula 73 bakoki kosala mbula mibale na bolɔkɔ

Na mokolo ya 25/09/2020, tribinale ya etúká ya Ielizovo oyo ezali na Kamchatka ekweisaki na likambo ndeko Konstantin Bazhenov, mwasi na ye, Snezhana, mpe ndeko mwasi Vera Zolotova. Liboso, Prokirɛrɛ asɛngaki tribinale efutisa ndeko Konstantin Bazhenov ná mwasi na ye dolare 7 850 mpe ndeko mwasi Zolotova dolare 5 195. Kasi, tribinale ekataki ete bátyela bango bipekiseli mpo na sanza motoba mpe na nsima na yango bakotala soki bakoki kosala mbula mibale na bolɔkɔ. Ndeko Konstantin Bazhenov ná mwasi na ye mpe ndeko mwasi Zolotova bazali na esengo ndenge bakokɔta bolɔkɔ te mpe bakofuta te lomande.