Lakisá makambo oyo ezali na kati

04/2/2020
RUSSIE

Tribinale ya Russie ekangi ndeko Kim mpe ndeko Polevodov

Tribinale ya Russie ekangi ndeko Kim mpe ndeko Polevodov

Na mokolo ya 04/02/2020, tribinale ya Zheleznodorozhniy na etúká ya Khabarovsk ekangaki ndeko Stanislav Kim mpe ndeko Nikolay Polevodov mpe ekatelaki bango etumbu ya mbula mibale ya bolɔkɔ. Atako bakolekisa etumbu na bango na kati ya bolɔkɔ te, kasi bakolekisa etumbu na bango ya bolɔkɔ mbula mibale na esika na bango. Mpe bakosambisa bango na tribinale. Longola oyo wana, bandeko bafundami lisusu na likambo mibale kaka na tribinale ya engumba yango. Mokolo ya kosambisa bango babongisi.