Lakisá makambo oyo ezali na kati

2/09/2020
RUSSIE

Tribinale ya Russie ekateli ndeko Sergey Britvin mpe ndeko Vadim Levchuk etumbu ya mbula minei ya bolɔkɔ

Tribinale ya Russie ekateli ndeko Sergey Britvin mpe ndeko Vadim Levchuk etumbu ya mbula minei ya bolɔkɔ

Na mokolo ya 02/09/2020, tribinale ya engumba Berezovsky na etúká ya Kemerovo ekateli ndeko Sergey Britvin mpe ndeko Vadim Levchuk etumbu ya mbula minei ya bolɔkɔ. Prokirɛrɛ asɛngaki ete bákatela bango etumbu ya mbula motoba ná ndambo ya bolɔkɔ. Bandeko yango bakosɛnga ete tribinale etalela lisusu likambo na bango.